Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 lok. 32
  • Elikya ya mokili moko kitoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya ya mokili moko kitoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 lok. 32

Elikya ya mokili moko kitoko

Na juillet 1985, Gilles Le Sieur abosanaki sakosi na ye kati na métro na mboka Montréal. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye epai na ye penepene na 260 kilométres ya mboka Montréal - elenge mwasi moko abengaki ye na telefone mpo na koyebisa ye ete amonaki sakosi na ye. Gilles mpe mwasi na ye bazongaki na Montréal mpo na kozwa sakosi yango mpe bapesaki likabo ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis epai na elenge mwasi yango. Poso mibale na nsima, bazwaki mokanda moko ya matondi oyo tomonisi mwa ndambo ya maloba na yango:

“Nayebi te nani kati na biso asalisaki mpenza moninga na poso oyo eleki, kasi motema na ngai esimbamaki mingi na batondi oyo bomonisaki epai na ngai. Nasepelaki mpenzampenza na mposa na bino ya kolakisa ngai liziba ya bolamu na bino. . . . Nasilisi kotanga mokanda oyo bopesaki ngai, mpe ntango bokozwa mokanda oyo moko kati na baninga na ngai, akobanda kotanga yango. Bozalaki na elonga ya koloba ete mokanda yango ezali kopesa bolamu. Epesaki ngai bobele elikya ya mokili kitoko te, kasi lisusu eyanolaki na ebele ya mituna oyo lingomba na ngai epesa naino eyano te . . . Nazongelaki kotanga Biblia na mposa ya kozala na bomoi ya kitoko.”

Elenge mwasi yango akobaki koyekola Biblia, mpe abandaki kosakola makambo kitoko oyo ye ayekolaki. Mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis esalisaki ebele na bato na kobongola bomoi na bango mpo na kokomisa yango malamu. Mokanda yango, ezali kolobela mateya nyonso ya Biblia mpe ezali na bililingi koleka 150 oyo ezali kopesa mayele. Mpo na kozwa mokanda yango kitoko ebongi na yo kosenga yango epai na ba Témoins de Jéhovah ya mboka na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto