Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/8 lok. 32
  • “Mwasi na bolenge na yo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mwasi na bolenge na yo”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/8 lok. 32

“Mwasi na bolenge na yo”

“EKOBO emonani lokola likambo ya mokolo na mokolo.” Wana ezali maloba na bato na mayele, engebene zulunalo Los Angeles Times. Maloba motindo oyo mazali kokamwisa yo? Nzokande, monganga ya maladi ya makanisi Frank Pittman akanisi ete penepene na mibali 50 likoló na monkama mpe basi na mabala katikati na 30 mpe 40 likoló na monkama batikalaki sembo te epai na babalani na bango. Soki likambo yango ezali solo, penepene na katikati na bato oyo babali bazali kosala ekobo!

Elimboli ete kosangisa nzoto na lolenge na mbindo ezali malamu? Soko moke te! Bokoli ya ezaleli ya kozanga sembo kati na libala ekomisi yango malamu te​—motindo moko lokola koyikana na mobulu na balabala ekomisi moyibi eloko malamu te. Etamboli ya mbindo epesaka mpasi. Na ndakisa, lelo bato bazali konyokwama na kopalangana na maladi mabe oyo ekozwamaka na bosangisi nzoto, oyo ekokaki kosila soki bato nyonso bazalaki na etamboli ya malamu. Maladi mabe oyo ekobomaka SIDA, elingaki kokola te lokola ezali yango lelo soki bato bamipesaki te na etamboli ya mbindo.

Lisusu, ata bato oyo batanga mingi to oyo “bangengisami” mingi bazali kooka mpasi mingi wana babalani na bango bazali sembo te. Ezalela ya kozanga sembo ata mpo na mbala moko ekoki kotika mpota oyo mpo na kosila ekosenga ebele na bambula.

Kasi, likambo lileki ntina yango oyo: kosakana na ndai ya libala ezali komonisa kozanga limemya monene epai na Nzambe, Mobandisi ya libala. Biblia elobi: “Tika ete libala likumisama na bato nyonso.” Tozwi lisusu likebisi oyo: “Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.”​—Baebele 13:4.

Yango wana, bato na mayele bazali kokangama na maloba oyo mapemami: “Sepela na mwasi ya bolenge na yo.” (Masese 5:18) Bazuli koluka bosepeli mpe esengo elongo na babalani na bango. Na kosalaka bongo, bazali kobatela kolongono ya mosuni mpe ya mayoki na bongo mpe, oyo eleki ntina, bazali kokumisa Mobandisi monene ya libala, Jéhovah Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto