Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Tokómaki kino na bamboka mike mosika na Groënland
UTA bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazali kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! kati na mosala ya kosakola nsango malamu. Bazulunalo yango ezali kokumisa bwanya ya Yehova lokola emonisami kati na Liloba na ye, Biblia. Bazali kotala makambo mazali koleka na mokili oyo makokani na Biblia, mpe bazali kosalela batoli ebongi ya Biblia mpo na mikakatano ya mikolo na biso.—Yakobo 3:17.
Na 1994, Batatoli ya Groënland basalaki molende monene mpenza mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai na bato mingi na meko oyo bakokaki kosala yango. Na boumeli ya eleko ya molungé, basalaki bibongiseli mpo na kokende kotala mwa bamboka mike oyo ezali mosika kati na Groënland. Etuluku moko ya basakoli ya Bokonzi basalaki mobembo na masúwa na bakilomɛtɛlɛ koleka 4 000 komata na libóngo ya wɛ́sti na Qaanaaq (Thule), kokómáká na bituluku bizwami na bisika bileki mosika na nɔ́rdi na mokili mobimba. Mobembo na bango eumelaki pɔ́sɔ nsambo. Na libóngo ya ɛ́sti, babalani Batatoli mibale bakómaki na mboka moko ya moke na Ittoqqortoormiit mpe mpo na mbala ya liboso basakolaki nsango malamu na lolenge losengeli.
Na ebandeli ya mobu yango, na boumeli ya sanza ya Apríli, bakopi 7 513 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ekabolamaki epai na bato ya Groënland. Yango elimboli ete, na mwayene, mokomoko kati na basakoli ya Bokonzi 127 akabolaki bazulunalo 59—zulunalo 1 mpo na etuluku mokomoko ya bafándi 7. Na sanza yango, Lamuká! emonisaki kolandana ya masoló oyo nkasa ya ezipeli na yango ezalaki na motó ya likambo “Kanser ya mabéle—Bobángi ya basi.” Motatoli moko oyo akabolaki bazulunalo 140, atikaki bakopi ya Lamuká! yango epai na molobi moko na televizyó. Mwa mikolo moke na nsima, emisyó moko ya televizyó emonisaki masoló yango oyo ezalaki kolobela kanser ya mabéle. Molobi yango alakisaki zulunalo yango na televizyó, amonisaki nkasa na yango mingi wana azalaki kokumisa libongoli kitoko oyo esalemaki na lokóta ya Groënland. Alobelaki mpe mingi batoli ya ntina oyo epesami na Lamuká! lokola ete ekoki kosunga mpo na kopɛngola bokɔnɔ.
Motatoli oyo akabolaki liboso bazulunalo epai na molobi wana atunamaki mituna bobele na emisyó wana ya TV. Ayanolaki na mwa ndambo ya mituna na ntina na Batatoli ya Yehova mpe alobaki na ntina na kokabolama mingi ya bazulunalo na sanza wana. Alobaki mpe na ntina na bwanya kitoko oyo bozwami kati na Biblia mpe amonisaki ete batoli wana ya mayele ekoki kosalisa biso na kolónga mikakatano ya mikolo na biso.
Emisyó yango esukisaki na botuni mituna epai na mokambi ya etuluku oyo ekotalaka makambo ya kanser na Groënland. Alobaki ete amoná naino te zulunalo kitoko oyo ezali kolobela makambo mingi ya ntina likoló na likambo wana na lokóta na ye. Na nsima asɛngaki baoyo nyonso bazalaka na mposa ya koyeba likambo litali kanser ya mabéle ete bátánga masoló ya Lamuká! Alobaki ete ezali na bantina malamu ya kozala na botɔ́ndi mpo na Batatoli ya Yehova mpo na molende na bango.
Lokola na Groënland, Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba bazali kokóba kosakola nsango malamu “epai na bato nyonso na nsé na likoló.” (Bakolose 1:23; Misala 1:8) Na lisalisi ya mikanda mikolimbolaka Biblia, kati na yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bazali kosalisa mitindo nyonso ya bato ete balónga mikakatano ya mikolo oyo mpe bazali kopesa bango lisusu elikya mpo na mikolo kitoko oyo mizali koya.
[Karte na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Qaanaaq (Thule)
Ittoqqortoormiit
Nuuk (Godthåb)