Basalaki yango mpo na bolingo
MWASI moko mosembwi oyo azali mokufeli-mobali mpe moyambi ya bapaya, na Canada, azalaki kobɔkɔla ye moko bana na ye minei ya basi ete bázala baklisto ya solo. Bankulutu ya lisangá bamonaki ete ndako na ye ezalaki mpenza kosɛnga kobongisama. Ye azalaki na mosolo te mpe na boyebi te mpo na kosalisa mosala yango. Mpo na yango, na boyokani na motindá oyo mozwami na 1 Timoté 5:9, 10, na mayele mpenza bankulutu ya lisangá bakamataki meko ete lisangá libongisela ye ndako yango. Lolenge nini?
Bazwaki bibongiseli ete mwasi wana mokufeli-mobali mpe bana na ye bákende epai mosusu na boumeli ya mikolo mitano. Basangani ya lisangá koleka 80 bapesaki lisungi na bango na motema mobimba, na kopesáká biloko ya mosala, mosolo mpe ntango. Nokinoki nsima wana libota yango likendaki, basáli ya molende basopanaki ebele na ndako yango lokola banzoi. Libándá ya ndako yango ebongisamaki. Babambaki bifelo na yango mpe batyaki yango lángi. Bakpulutaki simá ya nsé mpe bayeisaki yango ya sika. Batyaki mbɛ́lɛ́ ya sika mpe tapi ya sika. Biloko ya lotilíki mpe ya miinda ya sika ekitanaki oyo ya kala. Balongolaki ata bakiti ya kala mpe batyaki ya sika. Makambo nyonso makómisamaki ya sika bobele na mikolo mitano!
Bosepeli mpe bolekileki mpo na misala elamusaki likebi ya bato kati na kartyé. Mobali moko ya mibu 80 oyo azalaki kofanda penepene wana akamwaki mingi na milende ya Batatoli na boye ete amemaki likɔmbɔ na ye ya kopakola lángi mpe asɛngaki makasi ete akoka kopesa lisalisi. Nkóló ya kompanyi epai moko na basáli yango ya bolingo asalaka apesaki epɛtwiseli ya mopɛpɛ mpo na litúka ya kúku. Nkóló ya kompanyi mosusu apesaki balomwalo ya sika mpo na kúku. Mobali moko akamwaki mpenza mingi na boye ete alingaki koyeba makambo mingi na ntina na Batatoli ya Yehova. Andimaki na mposa mpenza kozwa búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana Paradis.
Kokamwa monene ezalaki komonana na elongi ya mwasi wana mokufeli-mobali mpe na bana na ye ya basi na ntango bazongaki. Ezalaki wana ntango oyo mingi kati na bango balelaki, basepelaki mpe bayambanaki—ntango ya bolingo mpe ya mayoki makasi ya boklisto oyo bakoki kobosana yango te. Ya solo, bolingo ya solosolo mpe komibanzabanza mpo na basangani ya lisangá oyo bazali kati na bosɛnga ezali elembo ya boklisto ya solo, lokola Paulo akomaki yango: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.”—Bagalatia 6:10.