Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 nk. 24-25
  • Kozwa epasó: Libaku malamu mpo na mosala ya Teokrasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozwa epasó: Libaku malamu mpo na mosala ya Teokrasi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Kozwa epaso na mosala​—Libaku ya kosala mingi?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Okoki kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 nk. 24-25

Kozwa epasó: Libaku malamu mpo na mosala ya Teokrasi?

EPASÓ​—mpo na bato mingi ezali nsuka ya eleko molai ya kotungisama mpe konyokwama. Nsima wana bakɔtisamaki kati na momeseno oyo ezali kolɛmbisa to kati na yikiyiki, bato mingi bazelaka na motema likoló mokolo oyo epasó ekofungwela bango ekuke mpo na kozwa bambula ya bopemi mpe nzela ya bonsomi. Nzokande, mbala mingi, ekuke yango ememaka na liyoki ya kozanga eloko ya kosala mpe na goigoi. Bopemi mpe masano ekoki soko moke te kopesa mayoki ya kozala na motuya oyo mosala epesaka.

Mpo na Batatoli ya Yehova, kozwa epasó ekoki kofungola “ekuke monene . . . mpo na mosala monene.” (1 Bakolinti 16:9) Atako bobangé ememaka mikakatano mpe bipekiseli na yango, mibangé mosusu bamonaki ete na lisalisi ya Yehova bakoki kobakisa mosala oyo bazali kosalela ye. Tótalela makambo oyo baklisto mosusu mibangé ya mboka Pays-Bas basalaki. Na boumeli ya mobu ya mosala 1995, 269 kati na babongisi-nzela (basakoli ya Bokonzi ya ntango nyonso) koleka 1223 bazalaki na bambula 50 to koleka. Kati na bango, 81 bazalaki na mbula 65 to koleka.

Bamoko bazali na makoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela wana ezali bango bobele kokóba na motindo oyo bamesanaki na yango wana bazalaki naino kosala na kompanyi. (Kokanisá na Bafilipi 3:16.) Ndeko moko oyo azwá epasó, na nkombo Karel amikundoli ete: “Ntango nazalaki kosala mosala ya mosuni, nazalaki kobanda mosala na 7:30 ya ntɔ́ngɔ́. Ntango nabandaki kozwa lifuti ya epasó na ngai, nazwaki ekateli ya kobatela momeseno yango. Ntɔ́ngɔ́ nyonso na ngonga ya nsambo, nazalaki kobanda mokolo na kolakisáká bazulunalo na balabála liboso na esika engbunduka etɛlɛmaka.”

Sɛkɛlɛ́ mosusu mpo na kolónga ezali bongo kosala ebongiseli ya malamu. (Masese 21:5) Na ndakisa, basusu bazalaki na makoki ya kobomba mwa mosolo mpo na komisunga kati na mosala ya Nzambe. Basusu bazwaki ekateli ya kokitisa motuya ya mosolo oyo basalelaka mpo na kobikela mpe bazwaki mosala oyo mosɛngaka bobele ndambo ya mokolo. Tótalela ndakisa ya Theodore mpe Ann. Babandaki bomoi na bango ya babalani wana bazalaki babongisi-nzela kino mikumba ya libota misengisaki ete bátika mosala ya babongisi-nzela. Kasi babungisaki te elimo na bango ya babongisi-nzela! Wana bana na bango ya basi bazalaki kokóla, bazalaki kolendisama ntango nyonso ete básala mosala ya mobongisi-nzela. Likambo lileki ntina, Theodore mpe Ann bamonisaki ndakisa malamu, mbala mingi bazalaki kosala lokola babongisi-nzela basungi. Ntango bana yango bakólaki, Theodore mpe Ann babandaki kokitisa mosala ya mosuni mpo bákoka kozwa ntango mingi mpo na mosala ya kosakola.

Nsima wana bana na bango ya basi babandaki mosala ya ntango nyonso mpe balongwaki na ndako ya baboti, Ann abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Mokolo mosusu alendisaki Theodore ete atika mosala na ye ya mosuni. Apesaki ye likanisi ete: “Biso nyonso mibale tokoki kosala mosala ya mobongisi-nzela.” Theodore asololaki na nkolo-mosala na ye na ntina na mokano na ye. Likambo ya kokamwa mpo na ye, nkolo-mosala amonisaki mposa ya kosunga ye na kopesáká ye mosala bobele mpo na ndambo ya mokolo, wana alobaki ete: “Nakanisi ete olingi komipesa mobimba mpo na nkolo-mosala na yo oyo azali kuna likoló [kati na lola].” Theodore mpe Ann bazali sikawa kosepela elongo kati na mosala ya babongisi-nzela.

Basusu babandaki mosala ya mobongisi-nzela mpo ete bapusamaki na makambo oyo bakutanaki na yango na bomoi. Kufa ya nsɔ́mɔ ya mwana na bango ya mwasi mpe ya mwana ya mwana na bango ya mwasi etindaki babalani mibale mibangé na kokanisa mozindo na motindo oyo bazalaki kosalela bambula oyo batikalaki na yango na bomoi. (Mosakoli 7:2) Na esika ete bázindisama kati na mawa, babandaki mosala ya ntango nyonso, oyo basili sikawa kolekisa mbula mwambe kati na yango!

Ya solo, esɛngaka kozala na ekateli makasi mpo na kotikala kati na mosala ya ntango nyonso. Na ndakisa, Ernst mpe mwasi na ye, Riek, babandaki mosala ya mobongisi-nzela nokinoki nsima wana bana na bango bakómaki na ndako na bango moko. Mwa moke nsima na yango, moninga moko oyo kala basalaki na ye mombongo ayaki kolakisa Ernst likabo ya mosala moko ya litomba mingi. Ernst azongisaki ete: “Tozali na nkolo-mosala oyo aleki bankóló-misala nyonso, mpe tozali na mposa te ya kotika ye!” Mpo ete Ernst mpe mwasi na ye batikalaki kati na “mosala” ya Yehova, mabaku mosusu ya mosala mafungwamaki liboso na bango. Basalaki na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga koleka mibu 20 mpe bazali kokóba lokola babongisi-nzela kino lelo oyo. Bayokaki mawa mpo na bomoi na bango ya komipimela? Esili koleka mwa ntango, babalani yango bakomaki boye: “Soki yango ezali mokano ya Yehova, nsima ya sanza misato tokosepela mibu 50 na libala na biso, oyo mbala mingi ebéngamaka bokundoli mobu ya wolo. Kasi na endimiseli makasi mpenza tolobi ete mibu na biso ya wolo ya solosolo ebandaki ntango tokómaki babongisi-nzela.”

Mingi bamoni ete nzela oyo ememaka na mosala mingi ebakisaka mpe esengo monene! Ndeko mobali moko oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela pɔ́sɔ mibale nsima ya kokokisa mbula 65 ya kobotama alobi ete: “Nasengeli koloba ete kati na bomoi na ngai naino nalekisá te eleko kitoko etondi na mapamboli lokola oyo nakutanaki na yango na boumeli ya mibu zomi oyo nalekisi na mosala ya mobongisi-nzela.” Babalani mibale oyo basalaki lokola babongisi-nzela na boumeli ya mibu nsambo balobi ete: “Eloko nini mosusu babalani ya mbula na biso mpe ya ezalela ya makambo na biso bakoki mpenza kosala? Mbala mingi tomonaka bato ya mbula na biso kati na teritware​—bafandi malamu na ndako, bazali bobele kokóma mineneminene, konuna mpe kokóma nzoto kilokilo. Mosala oyo mozali kobatela biso ete tózala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu na makanisi mpe na nzoto. Tozalaka ntango nyonso esika moko. Tosɛkaka mingi mpe tosepelaka na bomoi.”

Ya solo, ezalela ya mibangé nyonso te epesaka bango nzela ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Baklisto lolenge yango bakoki kondimisama ete Yehova asepelaka na nyonso oyo bakoki kosala na mosala na ye. (Kokanisá na Malako 12:41-44.) Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo azali ebɔsɔnɔ atyami na ndako ya mibangé. Nzokande, ekuke oyo ezali komema na mosala mingi ezali naino polele liboso na ye! Monganga moko atunaki ye soki lolenge nini asalaka mpo na kolekisa ntango na ye. Alobi ete: “Nayebisaki ye ete nazangaka mpenza ntango ya kosala makambo mingi. Akokaki te kokanga ntina na yango. Nayebisaki ye ete ezali bongo mpo ete ntango na ngai etondi na misala ya kosepelisa. Namiyokaka ngai moko te, nalukaka bato mosusu oyo bamiyokaka mpenza ete bazali bango moko mpe namekaka koyebisa bango makambo oyo Nzambe abombeli bato.” Alobi yango na mokuse boye: “Epai na moto oyo azali na mibu koleka 80, okoki komizela te ete asala mingi. Bóbondela mpo na ngai mpo ete nakóba komema bato mingi epai na Yehova.”

Ozali na mbula ya kozwa epasó? Okoki kolɛngolama ete okóma na bomoi ya kofanda bobele mpamba, kasi kofanda bobele mpamba ezali komema te na mapamboli ya elimo. Kanisá mpe bondelá mingi na ntina na ezalela na yo. Mbala mosusu okoki kokɔta na ekuke oyo ezali komema na mosala mingi kati na mosala ya Yehova.

[Bililingi na lokasa 25]

Kozwa epasó ekoki komema na mosala mingi kati na mosala ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto