Soki bapekisi te elingi koloba balingi ezala bongo
MOKANDA moko (Betrayal—German Churches and the Holocaust) elobi na bosembo nyonso makambo oyo mangomba esalaki na ntango Banazi bazalaki na bokonzi na Allemagne. Mokanda yango elobi boye: “Baklisto mingi bazalaki kondima bokonzi yango mpe mingi bapekisaki te ntango bazalaki konyokola Bayuda. Lokola bapekisaki te, yango emonisaki mpenza ete bandimaki likambo yango.”
Mpo na nini bato oyo bazalaki koloba ete bazali baklisto bazalaki kosepela na Banazi? Mokanda yango elobi ete bato mingi basepelaki na makanisi ya Hitler, ete “bato ya Allemagne basengeli kozala bato oyo batosaka mibeko, kasi bato ya mobulu te.” Mokanda yango ebakisi boye: “Hitler apekisaki mikanda to bafilme oyo elakisaka bato bazali bolumbu, apekisaki bato kosala kindumba, apekisaki kolongola zemi, apekisaki kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi mpe ‘makambo ya nsɔni’ na bililingi oyo bato ya misala ya ntɔki bazalaki koyema na ntango wana; azalaki mpe kopesa mwasi nyonso oyo aboti bana minei medayi ya bronze, oyo aboti bana motoba, medayi ya palata, mpe oyo aboti bana mwambe medayi ya wolo, nyonso wana mpo na kolendisa bango bátikala na mabala na bango lokola na momeseno. Hitler azalaki na mposa ya kobatela bizaleli malamu ya kala, alingaki ete Allemagne ezala na basoda ya makasi mpe alendisaki bolingo ya ekólo, asalaki makambo mingi mpo na kolongola makambo ya Traité de Versailles, oyo ezalaki kozongisa Allemagne nsima; nyonso wana esalaki ete bato mingi na Allemagne, mingimingi baklisto, básepela na Banazi.”
Kasi lingomba moko ekesanaki mpenza na mangomba mosusu nyonso. Mokanda yango elobi lisusu ete: “Batatoli ya Yehova baboyaki kokɔta na mobulu to kosimba mindoki.” Yango wana banyokolaki mwa lingomba yango mpe batyaki ebele ya bandimi ya mwa lingomba yango na bakaa ya bakangami. Kasi bato mosusu oyo bazalaki koloba ete bazali bayekoli ya Klisto bakangaki minɔkɔ na bango. Mokanda yango elobi lisusu boye: “Bakatolike na Baprotesta bayokelaki Batatoli ya Yehova mawa te, kasi bayinaki bango mpe bandimaki makambo mabe ya Hitler koleka bizaleli ya kimya ya Batatoli ya Yehova.” Na ntembe te, lokola bakangaki minɔkɔ na bango, yango esalaki ete Banazi bányokola Batatoli ya Yehova mingi koleka.
Atako tii na moi ya lelo bato bazali kotyana ntembe makasi mpo na koyeba soki mangomba ekɔtaki na politiki ya Banazi to te, mokanda Betrayal ebengi Batatoli ya Yehova “lingomba oyo eboyaki kondima to kopesa bokonzi yango mabɔkɔ.”