Makambo oyo ezali kobebisa banzete
NA NTANGO ya kala, bato bazalaki komona ete nzete ezali na ntina mingi. Na ndakisa, ntango Abalayama asombaki mwa mabele mpo na kokunda Sala, mwasi na ye ya bolingo, batángaki mpe nzete moko moko oyo ezalaki na esika yango na mokanda oyo basalaki mpo na kotekela ye mabele yango.—Genese 23:15-18.
Ndenge moko mpe lelo oyo, nzete ezali na ntina mingi, mpe na mokili mobimba bato bazali kolobela likambo ya kobatela zamba. Buku moko (State of the World 1998 ) elobi boye: “Bato mingi ya mikili ya malili bazali komitungisa mingi mpo na zamba ya mikili ya molunge, nzokande bazali kobosana ete zamba ya mikili na bango moko nde ekomá ndambondambo mpe ezali kobeba mingi koleka zamba mosusu.” Likama nini ezali kobebisa zamba ya mikili yango ya Mpoto mpe ya Amerika ya nɔrdi? Atako bato mingi bazali koloba ete ezali nde mpo ete bazali kokata ebele ya nzete, kasi ezali na makambo mosusu oyo emonanaka polele te, oyo ezali kobebisa nzete mpe koboma yango mokemoke. Ezali makambo nini? Ezali mopɛpɛ oyo ebebi na gaze ya mabe mpe mai ya mbula oyo etondi na aside. Biloko wana oyo ebebisaka, ekoki mokemoke kolɛmbisa nzete, kosilisa makasi na yango, mpe na nsima, nzete yango soki kaka ezwi maladi ekoumela te kokufa.
Banda bambula mwa mingi sikoyo, bato oyo balingaka kobatela zamba, mopɛpɛ mpe mai, mpe bato mosusu ya makanisi malamu, bazali kobelela ete ntango ya kobatela zamba, mopɛpɛ mpe mai yango oyo. Na bambula ya 1980, nsima ya koyekola ndenge mopɛpɛ oyo ebebi na gaze ya mabe mpe mai ya mbula oyo etondi na aside ezali kobebisa zamba, bato ya siansi na Allemagne balobaki boye: ‘Soki eloko moko esalemi te, ntango tokokóma na mbula ya 2000, bato bakotikala kotala zamba kaka na bafɔtɔ mpe na bililingi ya kala.’ Kasi, lokola mabele ezalaka na makoki ya kozonga ndenge ezalaki liboso ata babebisi yango, yango moko ebongisi bisika oyo ebebaki na makambo oyo touti kolobela.
Kasi, nsukansuka, Nzambe akosala eloko moko mpo na kobatela mopɛpɛ mpe mai awa na mabele. “Ye akopɔlisaka ngomba longwa na biteni ya ndako na ye” mpe “akokólisaka matiti mpo na bibwele; ndunda mpe mpo na kosunga moto.” Alaki mpe “kobebisa babebisi ya mokili.” (Nzembo 104:13, 14; Emoniseli 11:18) Ekozala esengo mingi ntango bato nyonso awa na mabele bakofanda na mokili oyo ezali na mopɛpɛ ya malamu mpo na libela!—Nzembo 37:9-11.