Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/2 lok. 32
  • “Bókɛngɛlaka”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókɛngɛlaka”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/2 lok. 32

“Bókɛngɛlaka”

NA NTANGO ya kala, bakɛngɛli ya bikuke bazalaki kobatela bikuke ya engumba, bikuke ya tempelo mpe ntango mosusu ata bikuke ya bandako ya bato. Lisusu na butu, soki basilisi kokanga bikuke nyonso, bazalaki kosala lokola basinzili. Bazalaki na mokumba monene mpamba te, soki banguna bazali koya, bango nde basengelaki kolamusa bato ya engumba.

Yesu Klisto ayebaki malamu mosala ya bakɛngɛli ya bikuke. Mokolo moko, abengaki bayekoli na ye bakɛngɛli ya bikuke mpe alendisaki bango bákɛngɛlaka mpamba te ebongiseli ya makambo ya Bayuda esengelaki kobebisama. Alobaki boye: “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te ntango nini ntango oyo etyamá ekokoka. Ezali lokola moto oyo asali mobembo na mboka mopaya oyo atiki ndako na ye mpe . . . asɛngi na mokɛngɛli ya ekuke ete akɛngɛlaka. Na bongo bókɛngɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya.”​—Malako 13:33-35.

Ndenge moko mpe, eleki sikoyo bambula 125, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kozongela elendiseli yango ya Yesu ete ‘tókɛngɛlaka.’ Ndenge nini? Ndenge emonisami na lokasa 2, zulunalo oyo “Elandaka ndenge makambo ya mokili mazali kokokisa bisakweli ya Biblia. Ebɔndisaka bato nyonso na nsango malamu oyo: etikali moke Bokonzi ya Nzambe eboma bato oyo bazali konyokola bazalani na bango mpe ekómisa mabelé paladiso.” Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka na mbala moko koleka 26 000 000 na minɔkɔ 150, ezali zulunalo oyo ezali kokabolama mingi koleka na kati ya bazulunalo nyonso ya mangomba. Na ndakisa ya bakɛngɛli ya bikuke ya ntango ya kala, Batatoli ya Yehova bazali kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kolendisa bato na bisika nyonso ‘bálala mpɔngi’ na elimo te mpamba te nkolo ya ndako, Yesu Klisto alingi koya mpo na kobebisa ebongiseli ya makambo oyo.​—Malako 13:26, 37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto