Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/7 lok. 32
  • “Bawanganaki kondima na bango te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bawanganaki kondima na bango te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/7 lok. 32

“Bawanganaki kondima na bango te”

YESU KLISTO alobaki na bayekoli na ye boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.” (Matai 5:11) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali na esengo mpamba te, na boyokani na mateya mpe ndakisa ya Klisto, bazali “bato ya mokili te” mpe bakɔtaka ata moke te na makambo ya politiki mpe batikalaka sembo epai ya Nzambe na makambo nyonso.​—Yoane 17:14, Matai 4:8-10.

Mpo na Batatoli ya Yehova ya Estonie, na ex-Union soviétique, oyo baboyaki kosala makambo oyo bayebaki ete ezali mabe, Toomas Paul, moto ya teoloji ya Lingomba ya Protesta mpe mobongoli ya Biblia, akomaki na buku na ye (Kirik keset küla) ete: “Mwa bato moke kaka bayokaki likambo oyo elekaki na ntɔngɔ ya 1 Aprili 1951. Bakonzi ya Leta bazwaki mokano ya kobengana Batatoli ya Yehova nyonso ná baninga na bango. Bakangaki bato 279 mpe batindaki bango na Sibérie. . . . Bayebisaki bango ete soki balingi bákɔta na bolɔkɔ te, bakokaki kaka kotya sinyatire na mokanda moko oyo ekomonisa ete bawangani kondima na bango. . . . Bango nyonso ná baoyo bakangamaki liboso bazalaki bato 353, bakisa bato mosusu soki 171 oyo bazalaki kaka koyangana na makita na bango. Ata kuna na Sibérie, bawanganaki kondima na bango te; . . . Bandimi mingi te ya Lingomba [ya Protesta na Estonie] bazalaki na kondima lokola Batatoli ya Yehova.”

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazalaka na elikya ete Nzambe akosalisa bango bátikala sembo mpe bátosa ye ata na kati ya minyoko. Bazali na esengo mpamba te bayebi ete bakozwa mbano monene mpo na bosembo na bango.​—Matai 5:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto