Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/5 lok. 32
  • Ndenge ya kosimba motema ya mwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosimba motema ya mwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/5 lok. 32

Ndenge ya kosimba motema ya mwana

OSILÁ koyoka motema mpasi mpo omoni mwana azali kosakana masano ya bitumba? Lokola masano ya bitumba etondi mpenza kotonda mikolo oyo, ata bana mike mpe bakómi kosakana masano yango. Ndenge nini okoki kosalisa bana mike bátika biloko oyo basalaka na yango masano ya bitumba mpe bázwa oyo ya malamu? Waltraud, misionɛrɛ moko ya Batatoli ya Yehova oyo aumeli mingi na Afrika, asalisaki mwana mobali moko ya moke na likambo yango.

Lokola bitumba ezalaki na esika oyo Waltraud azalaki kofanda, alongwaki wana mpe akendaki na ekólo mosusu ya Afrika. Kuna, abandaki koyekola Biblia na mama ya mwana moko ya mobali ya mbula mitano. Ntango nyonso oyo azalaki kokende kotala mama na ye, azalaki kokuta ye azali kosakana na mwa mondoki moko ya kopale; azalaki na eloko mosusu ya kosakana na yango te. Waltraud amonaki ye ata mbala moko te azali koluka kobɛta mondoki yango, kasi azalaki ntango nyonso kofungola mpe kokanga yango, lokola azali kotya masasi.

Waltraud alobaki na mwana yango boye: “Werner, oyebi ntina oyo ngai nayei awa na ekólo na bino? Ezali mpo na bitumba; nakimaki ekólo na ngai mpo bato mabe bazalaki koboma bato na mindoki oyo ezali lokola oyo ya yo. Okanisi ete koboma bato ndenge wana ezali malamu?”

Werner ayanolaki na mawa nyonso ete, “Te, ezali malamu te.”

Waltraud azongisaki ete, “Olobi solo.” Na nsima atunaki ye boye: “Oyebi ntina oyo nayaka pɔsɔ nyonso kotala yo ná mama na yo? Ezali mpo Batatoli ya Yehova balingi kosalisa basusu bázala na boyokani na Nzambe mpe na bazalani na bango.” Na ndingisa ya mama ya Werner, Waltraud alobaki na ye ete: “Soki opesi ngai mondoki na yo, nakobwaka yango, mpe nakolukela yo motuka ya kosakana na yango.”

Werner apesaki ye mondoki na ye ya kopale. Asengelaki kozela pɔsɔ minei mobimba, kasi nsukansuka ndeko wana amemelaki ye motuka ya mabaya, mpe ayambaki yango na esengo nyonso.

Ozwaka ntango ya kosolola na bana na yo, komeka kosimba mitema na bango mpo na kosalisa bango bábwaka biloko ya mabe lokola mindoki oyo basakanaka na yango? Soki osali yango, okoteya bango liteya oyo ekosalisa bango bomoi na bango mobimba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto