Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/11 lok. 3
  • Mpo na nini tosengeli kosala oyo ezali malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosengeli kosala oyo ezali malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bandakisa ya kolanda—Paulo
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Bosembo etambwisaka bato ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/11 lok. 3

Mpo na nini tosengeli kosala oyo ezali malamu?

NTOMA Paulo, moto oyo ayekolá mingi, alobaki boye: “Likoki ya kolinga ezalaka epai na ngai, kasi likoki ya kosala oyo ezali malamu ezalaka te. Mpo malamu oyo nazali kolinga nazali kosala yango te, kasi mabe oyo nazali kolinga te yango nde nazali na momeseno ya kosala.” Mpo na nini Paulo azalaki na mokakatano ya kosala malamu oyo azalaki kolinga? Ye moko apesaki eyano oyo: “Nazali kokuta mobeko oyo na ntina etali ngai: ete ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai. Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe engebene moto oyo ngai nazali na kati, kasi nazali komona na kati ya binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba ná mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na ngai.”​—Baloma 7:18, 19, 21-23.

Maloba yango, oyo ntoma Paulo akomaki eleki sikoyo mbula pene na 2 000, ezali mpenza komonisa ntina oyo biso bato ya kozanga kokoka tozalaka na mokakatano ya kosala oyo ezali malamu. Esɛngaka moto azala makasi mpo na kotosa mitinda ya sembo, mingimingi soki akutani na mikakatano. Yango wana, ebongi tómituna boye: “Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kosala oyo ezali malamu?”

Tótala oyo Biblia elobi mpo na avenire ya moto ya sembo. Na Nzembo 37:37, 38, tozali kotánga boye: “Talá moto ya sembo mpe moná moyengebene; sosolá ete moto ya kimya akotikala libela. Nde bato ya bokesene bakobeba nyɛɛ; libula ya bato mabe ekolongwa.” Lisusu, Masese 2:21, 22 elobi ete: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakobikolama wana.”

Makambo oyo Biblia elaki na bavɛrsɛ yango mpe na bavɛrsɛ mosusu elendisaka biso tózala na etamboli oyo esepelisaka Nzambe. Kasi, yango te nde ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kosala oyo ezali malamu. Ntina ya libosoliboso etaleli ntembe moko oyo ebimaki mpo na bikelamu nyonso. Lisolo oyo elandi ekolobela ntembe yango mpe ekomonisa soki ezali kosɛnga na mokomoko na biso asala nini.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto