Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/7 lok. 32
  • Mateya ya ntina mpenza mpo na bilenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya ya ntina mpenza mpo na bilenge
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/7 lok. 32

Mateya ya ntina mpenza mpo na bilenge

GLADYS asalaka na eteyelo moko na engumba Mendoza, na ekólo Argentine. Mokolo moko, azalaki koleka pembeni ya kelasi moko mpe amonaki molakisi moko azali kotángela bana na ye ya kelasi ya minei buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia.a Gladys ayebisaki molakisi yango ete azali Motatoli ya Yehova mpe asɛngaki ye ete atika ye alakisa ye lolenge malamu ya kosalela buku yango. Lokola asepelaki mingi na makambo Gladys ayebisaki ye, molakisi yango amonaki malamu akɔtisa buku yango na programɛ ya mateya na kelasi na ye. Kasi, esengelaki azwa naino ndingisa epai ya bakonzi ya eteyelo. Likambo ya esengo, bapesaki ye nzela.

Na nsima, na mokolo oyo batángaka babuku, molakisi yango asɛngaki mwana mokomoko aleka liboso ya baninga na ye mpe atánga mokapo moko ya buku yango. Lokola ebongiseli yango ebotaki mbuma ya malamu mpenza, babengaki molakisi yango na televizyo ya mboka na bango. Na ntina na bizaleli kitoko ya bana-kelasi na ye, mopanzi-nsango oyo ayambaki molakisi yango atunaki ye boye: “Osalaka nini mpo bana-kelasi na yo bázala na etamboli malamu boye?” Molakisi yango alobaki ete asalelaka buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Alobaki ete atako atángisaka makambo ya Nzambe na kelasi na ye te, buku wana esalisaka ye ateya bana-kelasi bizaleli malamu lokola limemya, kondima bokeseni ya baninga, bomoko, boyokani, botosi mpe bolingo. Bato nyonso oyo bazalaki wana bandimaki ete yango ezali mateya ya ntina mpenza mpo na bilenge.

Okolinga koteya bana na yo bizaleli yango? Okoki kosɛnga Motatoli ya Yehova moko amemela yo buku kitoko wana: Mokanda mpo na masolo ya Biblia.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto