Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/1 lok. 32
  • Ntango baklisto banyongelami lokola blé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango baklisto banyongelami lokola blé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/1 lok. 32

Ntango baklisto banyongelami lokola blé

MWA moke liboso Yesu akufa, akebisaki bayekoli na ye boye: “Talá! Satana asɛngi azwa bino mpo anyongela bino lokola blé.” (Luka 22:31) Alingaki koloba nini?

Na ntango ya Yesu, kobuka blé ezalaki kosɛnga ntango mpe milende mingi. Liboso, babuki bazalaki kosangisa blé oyo babuki na elanga. Na nsima, bazalaki kobɛtabɛta yango na mabelé ya makasi to kosalela banyama mpo na kotambwisa etutelo ya blé mpo na kobukabuka yango. Yango ezalaki kokabola blé ná matiti mpe mposo na yango. Basali bilanga bazalaki kobwaka biloko yango nyonso na likoló. Blé ezalaki kokwea na nse mpe mopɛpɛ ezalaki komema mposo nyonso. Na nsuka, bazalaki konyongela blé mpo na kolongola biloko nyonso ya mabe.

Ndenge Yesu alobaki yango, Satana anyokolaki mpenza bayekoli ya Yesu ya ntango wana, mpe azali konyokola biso lelo oyo. (Ef. 6:11) Toboyi te, mikakatano nyonso oyo tokutanaka na yango na bomoi eutaka kaka epai ya Satana te. (Mos. 9:11) Kasi, Satana asalaka nyonso mpo na kopɛngwisa biso. Na ndakisa, akoki komeka biso na mposa ya bozwi ya mokili, na bafilme to na masano ya mabe, na pite to ekobo. Akoki mpe kosalela baninga ya kelasi mpe ya mosala, to bandeko na biso oyo bazali bandimi te bákóma kotya biso mbamba mpo tómipesa na bakelasi to na misala ya mokili oyo. Longola yango, Satana akoki mpe kobimisela biso botɛmɛli mpo na kolɛmbisa biso tózala lisusu sembo te epai ya Nzambe. Satana asalelaka mayele mingi mosusu mpo na konyongela biso lokola blé.

Ndenge nini tokoki kolonga monguna wana ya nguya? Tokolonga ye na makasi na biso moko te. Satana aleki biso na makasi, kasi toyebi ete akoki kotɛlɛma liboso ya Yehova ata moke te. Soki tozali kotya motema na biso mobimba epai ya Yehova, kobondela ye na etingya mpo apesa biso bwanya mpe mpiko mpo tólɛmba te, mpe tozali kotika ye atambwisa biso, akopesa biso makasi mpo tólonga na etumba oyo Satana azali kobundisa biso.​—Nz. 25:4, 5.

Ntango tokutani na komekama, tosengeli kozala na likoki ya “kokesenisa ná mabe ná malamu,” mpo tókwea te na mitambo ya Satana. (Ebe. 5:13, 14) Yehova akoki kosalisa biso tókóma na likoki wana. Na nsima, tosengeli kokangama na makambo ya malamu, ata soki ekomemela biso mpasi nini. Soki totiki Yehova atambwisa biso, akozanga te kosalisa biso mpo tólonga na ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu.​—Ef. 6:10.

Satana akoki koluka konyongela biso lokola blé. Kasi, na makasi ya Yehova, tokoki kolonga Satana mpe kozala ntango nyonso na kondima makasi. (1 Pet. 5:9) Ɛɛ, Liloba ya Yehova ezali kolendisa biso ete: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”​—Yak. 4:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto