Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/1 nk. 9-10
  • Abrahama—Moto ya komikitisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Abrahama—Moto ya komikitisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Abalayama ná Sala​—Okoki komekola kondima na bango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/1 nk. 9-10

Abrahama​—Moto ya komikitisa

Abrahama afandi na nse ya hema na ye, azali kozwa mopɛpɛ, mpo molunge ezali makasi mokolo wana. Ntango atali mosika, amoni mibali misato bazali kotambola mpo na kotala mboka.a Kozanga kokakatana, akimi mbangu mpo na kokutana na bapaya yango, mpe asɛngi bango bápema mwa moke mpo ayamba bango epai na ye. Alobi ete alingi kopesa bango “mwa ndambo ya limpa,” kasi na nsima abongisi ebele ya bilei, mampa ya mɔtɔ, manteka, miliki, mpe mosuni ya kitoko mpenza. Ntango Abrahama azali kopesa bapaya yango bilei wana, amonisi kaka te ete azali moyambi monene ya bapaya, kasi ndenge tokomona yango, amonisi mpe komikitisa ya solosolo.​—Ebandeli 18:1-8.

KOMIKITISA EZALI NINI? Komikitisa elimboli kozala na lolendo te mpe komitombola te. Moto ya komikitisa andimaka ete basusu baleki ye na likambo moko to mosusu. (Bafilipi 2:3) Ayokaka makanisi ya basusu, mpe asepelaka kosala misala oyo ezangi lokumu mpo na bolamu na bango.

NDENGE NINI ABRAHAMA AMONISAKI KOMIKITISA? Abrahama azalaki kosepela kosalela basusu. Ndenge tolobi yango na ebandeli, ntango Abrahama amonaki bapaya wana misato, alukaki mbala moko kopesa bango biloko oyo basengelaki na yango. Mwasi na ye Sara, abandaki nokinoki kolamba biloko. Kasi, tósimba ete Abrahama mpe asalaki mosala monene: Akimaki mbangu mpo na kokutana na bapaya yango, asɛngaki bango bálya mwa eloko, apotaki mbangu na etonga mpe aponaki nyama ya koboma, mpe atyaki biloko yango nyonso liboso ya bapaya. Na esika atikela basali na ye misala nyonso, moto wana ya komikitisa asalaki nyonso oyo esengelaki. Amonaki te ete kosalela basusu ekokitisa lokumu na ye.

Abrahama azalaki koyoka makanisi ya bato oyo azalaki kokamba. Biblia elobeli masolo mingi te kati na Abrahama ná Sara. Kasi, mbala mibale mobimba tozali kotánga ete Abrahama ayokaki makanisi ya Sara mpe asalelaki yango. (Ebandeli 16:2; 21:8-14) Na moko ya mabaku yango, na ebandeli, likanisi ya Sara “esepelisaki Abrahama ata moke te.” Kasi, ntango Yehova asololaki na Abrahama, mpe ayebisaki ye ete likanisi ya Sara ezalaki malamu, Abrahama amikitisaki mpe asalelaki yango.

MATEYA NINI TOZWI? Soki tozali mpenza na komikitisa, tokosepela kosalela basusu. Tokozala na esengo ya kosala nyonso oyo tokoki mpo bango bázala na bomoi ya esengo.

Tokoki mpe komonisa komikitisa na ndenge oyo tozali koyoka makanisi ya basusu. Na esika ya koboya likanisi moko kaka mpo biso tokanisaki bongo te, tokomonisa bwanya soki tozali mpe kondima makambo oyo basusu balobi. (Masese 15:22) Ezaleli wana ya kondima mpe makanisi ya basusu ezali mpenza na ntina, mingimingi mpo na baoyo bazali na mwa bokonzi likoló ya basusu. John, mobali moko oyo amesani na mosala ya kokamba basusu, alobi boye: “Mpo na ngai, mokambi ya malamu ezali oyo asalaka makasi ete bato bábanga te koloba makambo oyo bazali kokanisa. Esɛngaka komikitisa mpo na kondima ete moto oyo yo ozali kokamba akoki koyeba lolenge malamu ya kosala makambo mosusu koleka yo. Na yango, ezali na moto moko te, ata mpe mokambi, oyo akoki kozala kaka na makanisi ya malamu.”

Soki tolandi ndakisa ya Abrahama ya koyoka makanisi ya basusu mpe ya kosala misala oyo ezangi lokumu mpo na bolamu na bango, Yehova akondima biso. Kutu, “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”​—1 Petro 5:5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako ekoki kozala ete na ebandeli Abrahama ayebaki yango te, bapaya wana bazalaki nde baanzelu ya Nzambe oyo bamemaka bansango na ye.​—Baebre 13:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto