Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/1 nk. 30-31
  • Kebá na bilimo mabe!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá na bilimo mabe!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/1 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Kebá na bilimo mabe!

Malako: Salá devuare oyo na esika moko ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozali wana ntango makambo yango ezali kosalema. Salá lokola ozali komona makambo yango na makanisi, ozali koyoka mingongo, mpe luká komitya na esika ya bato oyo bazali kolobela. Salá lokola nde likambo yango ezali kosalema sikoyo.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 6:1-6 MPE MISALA 19:11-20.

Lobelá ndenge okanisi ete Banefilime bazalaki.

․․․․․

Ndenge Misala 19:13-16 emonisi yango, okanisi ete nsima ya kokutana na elimo mabe moko, bato yango bayokaki ndenge nini?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Luká na mikanda oyo ozali na yango mpo na komona makambo mosusu oyo elobeli Banefilime. Mpo na yo, bato yango bazalaki mobulu ndenge wana mpo na nini?

․․․․․

Mpo na nini tokoki koloba ete bilimo mabe “basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza”? (Tángá Yuda 6.) Na makanisi na yo, mpo na nini ezalaki likambo oyo ebongi te to ya mabe mpenza bázwa basi?

․․․․․

Masolo mibale oyo otángi emonisi yo nini mpo na mposa makasi oyo bilimo mabe bazalaki na yango ya kosangisa nzoto mpe kosala mobulu?

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Makanisi mpe mposa mabe ya bilimo mabe.

․․․․․

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Lokola bilimo mabe bakoki lisusu te kolata nzoto ya bato, mayele nini mosusu bakoki kosalela mpo na kobenda yo?

․․․․․

Masano ya ndenge nini lelo oyo ezali komonisa elimo mpe mposa ya bilimo mabe?

․․․․․

Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na ekateli ya koboya kobendama na bilimo mabe? (Tángá lisusu Misala 19:18, 19.)

․․․․․

4 NA MASOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na Biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na internet na www.watchtower.org

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto