“Batelá motema na yo!”
Liyangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova
MOTÓ YA LIKAMBO YA MOKOLO YA MITANO
“Kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali”—1 SAMWELE 16:7.
MOTÓ YA LIKAMBO YA MOKOLO YA PƆSƆ
“Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema”—MATAI 12:34.
MOTÓ YA LIKAMBO YA MOKOLO YA LOMINGO
“Salelá Yehova na motema mobimba”—1 NTANGO 28:9.
Biblia elobeli motema mbala pene na nkóto moko. Na bisika mingi, Makomami elobelaka motema ya solo te, kasi nde motema ya elilingi. Motema ya elilingi ezali nini? Maloba yango ekoki kolimbola bomoto ya kati, elingi koloba makanisi, mayoki, mpe bamposa oyo moto azalaka na yango.
Mpo na nini tosengeli kobatela motema na biso ya elilingi? Nzambe atindaki mokonzi Salomo akoma boye: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23) Kozala na bomoi ya malamu lelo mpe na mikolo ezali koya etaleli ndenge oyo motema na biso ya elilingi ezali. Mpo na nini? Ezali mpo ete Nzambe atalaka oyo ezali na kati ya motema na biso. (1 Samwele 16:7) Ezali bomoto na biso ya kati, “bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema,” nde ekosala ete Nzambe asepela na biso to te.—1 Petro 3:4.
Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso? Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ekosalema na mokili mobimba kobanda na sanza oyo ekopesa eyano ya mozindo na motuna wana. Tobengi yo oya na liyangani yango mikolo nyonso misato.a Mateya oyo okoyoka kuna ekosalisa yo osala makambo oyo ekosepelisa motema ya Yehova.—Masese 27:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba esika ya liyangani oyo ekosalema pene na esika ofandi, okoki kotala na Internet, na adrɛsi oyo: www.pr418.com. Okoki mpe kotuna Batatoli ya Yehova na esika ofandi to kokomela babimisi ya zulunalo oyo.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Fɔtɔ na lobɔkɔ ya mobali: Aus dem Fundus der MÜNCHNER OLYMPIAPARK GMBH, München