Etanda ya makambo ezali na kati
PƆSƆ YA 29/05–04/06/2017
3 “Elako oyo osali, kokisá yango”
Bilako boni osalelá Yehova? Moko, mibale, to koleka? Omonaka ete ozali kosala nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa bilako yango? Tokoloba nini mpo na elako oyo osalaki ntango omipesaki na Nzambe to ntango obalaki? Lisolo oyo ekundweli biso ndakisa malamu oyo Yefeta mpe Hana batikelá biso ntango tozali kosala makasi mpo na kokokisa na bosembo bilako oyo tosalelaki Nzambe.
PƆSƆ YA 05-11/06/2017
9 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?
Mbala mingi, tokanisaka mapamboli oyo Yehova akopesa biso na Paradiso, kasi na lisolo oyo tokolobela nde makambo oyo Yehova akolongola. Makambo nini Yehova akolongola mpo mokili ezala na kimya mpe na esengo? Kokanisa eyano na motuna wana ekokómisa makasi kondima na biso mpe ekateli na biso ya koyika mpiko.
14 Lisolo ya bomoi—Nazali na ekateli ya kozala soda ya Kristo
PƆSƆ YA 12-18/06/2017
18 “Mosambisi ya mabele mobimba” asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo
PƆSƆ YA 19-25/06/2017
23 Makanisi na yo eyokani na oyo ya Yehova na likambo etali bosembo?
Soki tokanisi to tomoni ete basaleli biso likambo oyo ezali sembo te, kondima na biso, komikitisa na biso, mpe bosembo na biso ekoki komekama. Masolo oyo mibale ekolobela masolo misato ya Biblia oyo ekosalisa biso tótalela bosembo ndenge oyo Yehova atalelaka yango.
PƆSƆ YA 26/06–02/07/2017
28 Tiká ete elimo na yo ya komipesa ekumisa Yehova!
Yehova akoká na nyonso; atako bongo asepelaka komona mposa makasi oyo tozalaka na yango mpo na kopesa boyangeli na ye mabɔkɔ. Basambisi mokapo ya 4 mpe ya 5 emonisi ndenge oyo Yehova asepelaka ntango tondimi kolanda litambwisi na ye.