Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 1 Sɛtɛmbɛ kino pɔsɔ ya 18 Desɛmbɛ 2000.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:
1. Davidi apekisaki Abisai ete aboma Simi te mpo makambo oyo Simi afundaki ye na yango ezalaki solo. (2 Sam. 16:5-13) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 1/5 lok. 32 par. 3.]
2. Lisosoli ya pɛto, oyo eteyami malamu ekosuka te bobele na kosalisa moto ete azala na boyokani malamu na Nzambe kasi, lisusu ezali na ntina mingi mpo na lobiko na ye. (Ebe. 10:22; 1 Pet. 1:15, 16) [w98 1/9 lok. 4 par. 4]
3. Mokanda ya 1 Mikonzi ezali mpenza na litomba te longola kaka ndenge eyebisi masolo ya kala, mpamba te kati na bakonzi zomi na minei oyo balobelami kuna, baoyo bayangelaki Yisalaele mpe Yuda nsima ya liwa ya Salomo bobele bakonzi mibale nde basalaki oyo ezali malamu na miso ya Yehova. [si-LI lok. 64 par. 1]
4. Boyangeli ya Yesu oyo ekoumela Mbula Nkóto ekozala lokola boyangeli ya Salomo oyo eumelaki mbula 40, mpo ezalaki boyangeli ya kimya mpe bato bazalaki na bomoi ya malamu. (1 Mik. 4:24, 25, 29) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/6 lok. 6 par. 5.]
5. Lokola Abiya akundamaki malamu, yango emonisi ete na kati ya bato nyonso ya libota ya Yelobama, bobele ye nde asambelaki Yehova na bosembo. (1 Mik. 14:10, 13) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/4 lok. 12 par. 11.]
6. Soki moto azwi batisimo ya boklisto, yango emonisi ete akómi mosaleli ya Nzambe oyo akɔmeli na elimo. [w98 1/10 lok. 28 par. 2]
7. Yehova apesaki Eliya mpiko oyo elekaki mpiko ya bato mpe alongolaki kobanga nyonso na motema na ye. (1 Mik. 18:17, 18, 21, 40, 46) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/1 lok. 31 par. 2.]
8. Tempelo ya Salomo ezalaki kobenda likebi bobele mpo na nkembo na yango mpe kitoko na yango te kasi mpo ezalaki elilingi ya tempelo ya Yehova na elimo oyo ezali na nkembo mingi koleka. [si-LI lok. 69 par. 26]
9. Ntango Elisa alobaki ete basoda ya Sulia bákufa miso, na ntembe te ezalaki kokufa miso ya makanisi mpamba te, bazalaki komona Elisa, kasi bayebaki ye te. (2 Mik. 6:18, 19) [Botángi ya Biblia; talá si-LI lok. 71 par. 10.]
10. Kotya “Litatoli” na motó, oyo elobelami na 2 Mikonzi 11:12 (NW ), ezalaki elembo ete ntango mokonzi alimboli mobeko yango ekoki kobongolama te mpe esengeli bátosa yango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 1/2 lok. 31 par. 6.]
Yanolá na mituna oyo milandi:
11. Na boyokani na 1 Yoane 2:15-17, baboti oyo babangaka Nzambe basengeli kokebisa bana na bango na likambo nini ntango bazali kopesa bango toli mpo na kopona mosala malamu ya mosuni? [w98 15/7 lok. 5 par. 2]
12. Ndenge nini tokoki kolimbola maloba oyo ezali na 2 Samwele 18:8, oyo elobi ete: “Zamba emelaki bato mingi koleka bato baoyo mopanga emelaki bango”? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w87-F 15/3 lok. 31 par. 2.]
13. Lelo oyo banani bakokani na bato ya libota ya Goliata, Balefaimi, mpe likambo nini bazali koluka kosala? (2 Sam. 21:15-22) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 1/1 lok. 20 par. 8.]
14. Liteya nini tozali kozwa na 2 Samwele 6:6, 7? [si-LI lok. 63 par. 30]
15. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na lisolo ya mobali oyo abomamaki mpo atosaki mokolo ya Sabata te? (Mit. 15:35) [w98 1/9 lok. 20 par. 2]
16. Tosengeli kosala nini mpo na komonisa ete tozali kolanda ndakisa ya mokonzi-mwasi ya Seba, oyo asalaki mobembo molai mpo na kokende koyoka “mayele ya Salomo”? (1 Mik. 10:1-9) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 1/7 lok. 31 par. 1-2.]
17. Engebene 1 Mikonzi 17:3, 4, 7-9, 17-24, wapi lolenge misato oyo Eliya amonisaki kondima epai ya Yehova? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/4 lok. 19 par. 5.]
18. Mpo na nini tokoki koloba te ete Nabota asalaki motó makasi lokola aboyaki kopesa Ahaba elanga na ye? (2 Mik. 21:2, 3) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 1/8 lok. 13 par. 18.]
19. Ndenge nini maloba oyo ezali na 2 Mikonzi 6:16, ezali kolendisa basaleli ya Yehova lelo oyo? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 15/6 lok. 18 par. 5.]
20. Ndenge nini baklisto ya solo basengeli kokeba na simoni lelo oyo? [w98 15/11 lok. 28 par. 5]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:
21. Moklisto ya solo asengeli _________________________ mpe akosangana te na mimeseno oyo _________________________ aboyaka. (Mas. 29:25; Mat. 10:28) [w98 15/7 lok. 20 par. 5]
22. Ntango Paulo apesaki litatoli liboso ya Mokonzi Akalipa, asalelaki _________________________, alobelaki mingi makambo oyo ye na Akalipa _________________________. (Mis. 26:2, 3, 26, 27) [w98 1/9 lok. 31 par. 3]
23. Lokola Nzambe _________________________, bato mosusu bakoki kokanisa ete azali moto te, kasi _________________________ mbala na mbala mpe na bozindo, ekoki kosalisa moto ‘amona ye oyo amonanaka te.’ (Ebe. 11:27) [w98 15/9 lok. 21 par. 3-4]
24. Ndenge yango emonanaki na lisolo ya _________________________, mokonzi ya basoda ya Sulia, mbala mosusu _________________________ moke ememaka matomba minene. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 1/2 lok. 3 par. 6–lok. 4 par. 1.]
25. Ndenge motema ya Yonadaba ezalaki esika moko na motema ya Mokonzi Yehu, ndenge moko mpe lelo oyo ebele monene bazali kondima mpe kosala elongo na Yehu Monene, _________________________, na bamonisi na ye awa na mabele _________________________. (2 Mik. 10:15, 16) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/1 lok. 13 par. 5, 6.]
Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:
26. Ezalaki (Satana; Yehova; Yoaba) nde atindaki Davidi asala lisumu na ndenge ‘atángaki motuya na Yisalaele.’ (2 Sam. 24:1) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 15/7 lok. 5 par. 2.]
27. Na boyokani na 1 Mikonzi 8:1 mpe Mosakoli 1:1, Salomo ayanganisaki bato mpo na (kotonga tempelo; kolanda banguna ya Yisalaele; kosambela Yehova). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si-LI lok. 112 par. 3.]
28. Mbula 20 oyo Salomo alekisaki na kotonga tempelo mpe ndako na ye na Yelusaleme ekokani na eleko oyo mbongwana ekɔtaki na mateya mpe ebongiseli ya Nzambe; eleko yango ebandaki na (1919; 1923; 1931) mpe esukaki na (1938; 1942; 1950). (1 Mik. 9:10) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/3 lok. 20 etanda.]
29. Liloba “lola” oyo esalelami na 2 Mikonzi 2:11 ezali komonisa (efandelo ya elimo mpo na Nzambe; molɔngɔ oyo ezali komonana; likoló ya mabele, epai bandɛkɛ bazali kopumbwa mpe mopɛpɛ epɛpaka). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 15/9 lok. 15 etanda.]
30. Ezalaki (Elode Monene; Kaisala Augusite; Tibeli Kaisala) nde atindaki ete bátánga bato ya mboka nyonso oyo esalaki ete Yesu abotama na Beteleme na esika ete abotama na Nasalete. [w98 15/12 lok. 7 etanda]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:
Nz. 15:4; 2 Sam. 12:28; 2 Sam. 15:18-22; 2 Mik. 3:11; Kols. 3:13
31. Tosengeli kotosa bokonzi kati na ebongiseli ya Teokrasi. [si-LI lok. 63 par. 30]
32. Tosengeli kotikala sembo na ebongiseli ya Yehova mpe epai ya bato oyo bazali komonisa yango. [si-LI lok. 63 par. 30]
33. Soki moto azali komonisa botɔndi mpo na ngɔlu ya Yehova, yango ekotinda ye ete amipekisa mpe alimbisa mabunga ya bamosusu. [w98 1/11 lok. 6 par. 3]
34. Koyamba bapaya mpe kosalela basaleli ya sembo ya Yehova na komikitisa nyonso ezali libaku malamu. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 1/11 lok. 31 par. 1.]
35. Moto oyo abangaka Nzambe asalaka makasi ete afuta nyongo oyo azali na yango ndenge alakaki, ata soki makambo makanami te makómisi yango mpasi na ndenge oyo akanaki te. [w98 15/11 lok. 27 par. 1]