Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/01 lok. 1
  • Komibongisa liboso​—Mpo na makambo nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komibongisa liboso​—Mpo na makambo nini?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Kolonga elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Omibongisa liboso!
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 4/01 lok. 1

Komibongisa liboso​—Mpo na makambo nini?

1 Biso nyonso tokanisaka na makambo oyo tokosala na mikolo oyo ezali koya. Bato oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele bazali kozela na mposa makasi báfanda libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe epai bosembo ekozala. Kasi ezali na makambo oyo ekoki kolongola elikya yango na motema ya moto. Ezali kosenga milende makasi mpo na kotya bomoi na biso mobimba na makambo ya Bokonzi mpe kopesa nzela te ete bamposa ya mosuni epɛngwisa biso.​—1 Yoa. 2:15-17.

2 Bato ya mokili bakoki koyeba te mpo na nini bato oyo bamipesi na makambo ya Nzambe balingaka eloko boye to boye. (1 Kol. 2:14) Ntango bato mosusu ya mokili bazali kosala makasi mpo na koluka koyebana mingi, kokóma bato minene, to kokóma bato ya mbongo, biso tozali kosala milende mpo na kozwa bozwi ya elimo. (Mat. 6:19-21) Na yango, soki tozali kotalela mikolo oyo ezali koya ndenge moko na bato ya mokili, tokokoka nde kokokisa makambo ya elimo oyo tozali kokana kosala? Makambo ya mokili kutu nde ekobebisa mitema na biso noki mpenza. Kasi nini tokoki kosala mpo likambo yango ekómela biso te?

3 “Bólata Nkolo Yesu Klisto”: Masolo oyo tobɛtaka ezali moko ya makambo oyo ekoki kolakisa soki tozali kotya bomoi na biso ya mikolo ezali koya na makambo etali Bokonzi to te. Makambo nini tolobelaka mingimingi ntango tozali kosolola: kozwa biloko mingi ya mosuni mpe kolanda makambo oyo mokili elukaka? Soki ezali bongo, tosengeli kotalela mitema na biso malamumalamu soki ebandi kobungisa mposa na yango na makambo ya elimo. Yango ekosɛnga na biso tótya likebi mingi lisusu na likambo ya ‘kolata Nkolo Yesu Klisto na esika ete tozala na mikano ya bamposa ya mosuni.’​—Lom. 13:14.

4 Bilenge bakoki ‘kolata Klisto’ soki bazali kozwa bibongiseli libelalibela mpo na kokota na mosala ya ntango nyonso na mikolo oyo ezali koya. Elenge moko oyo azalaki na mposa ya kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza abokwamaki na esika oyo bazalaki kopusa bilenge báluka kozala na mbongo mingi. Yango wana, amipesaki mingi na mombongo mpe akomaki kokende na makita kaka mpo na kokende mpe mosala ya kosakola ekómaki kaka ya bongobongo. Ntango akomaki kotya motema na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 mpe atikaki mosala ya mpunda oyo azalaki kosala, abandaki mosala ya ntango nyonso. Mpe lelo oyo, ye moko alobi ete azali kosalela Yehova na lisosoli ya malamu mpe ‘na makasi na ye nyonso’

5 Biblia elobi ete komibongisa liboso mpo na mikolo oyo ezali koya, ezali likambo ya mayele. (Mas. 21:5) Tiká ete biso nyonso tosala yango, na kotyáká mokano ya Nzambe na esika ya liboso na kati ya makanisi na biso.​—Ef. 5:15-17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto