Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku moko ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Quel est le but de la vie—Comment le découvrir? mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso, biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; Un livre pour tous.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona asengeli kotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Kobanda na pɔsɔ ya mwa 30 Yuli 2001, tokobanda koyekola buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I, na boyekoli ya mokanda.
◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2001 ekozala na lisolo “Mbongo ekoki kopesa yo bomoi ya solosolo?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %).
◼ Balapolo ezali komonisa ete basakoli bazali kosala komande ya bakasɛti video kaka mpo na kozala na yango to mpo na esengo kaka, kasi bazali na aparɛi ya kotalela yango te. Tozali kokundwela bino ete la Société abimisaka mbongo mingi mpo na kosala bakasɛti video yango. Ebongi kosala komande na yango kaka soki tozali na aparɛi ya kotalela yango. Soki tozali na yango te, ekozala malamu ete tosala komande na yango te; yango ekomonisa ete tozali na mayele mpe na bososoli. Bakomeli ya masangá basengeli kotalela malamumalamu bakomande yango liboso ya kotya sinyatili na bango mpe kotinda yango na biro, mpo na komindimisa ete eloko moko esɛngami te kozanga ntina to kaka mpo na lokumu.—1 Kol. 14:20; Ef. 1:8; 2 Tim. 4:5a.
◼ Basakoli ya masangá oyo bakutanaka na teritware na bango na bato oyo bazali bapaya mpe balobaka minɔkɔ mosusu, bakoki kosala komande ya mikanda na minɔkɔ yango mpo na kopesa bato yango mikanda na minɔkɔ oyo bango bayebi malamumalamu. Yango ekoki kotalela bazulunalo, mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? To buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.