Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1987, soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu ekoki mpe kolakisa yango. Febwali: Buku nyonso ya kala ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá. Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Aprili: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Basakoli nyonso oyo bazwá batisimo baoyo bakozala na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo ebandi na 4 Febwali bakoki kozwa kalati Instructions médicales prévisionnelles/Décharge mpe Document d’identité médical mpo na bana na bango.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mwa 3 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Tózwa libateli na kati ya mokili oyo etondi na makama.”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli; mpo na mbula oyo ekosalema na mokolo ya minei 28 Marsi, nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa na vinyo esengeli kolekisama nsima ya kolala ya moi. Bótala malamu ngonga oyo moi elalaka na esika oyo bozali. Ezali malamu ete lisangá na lisangá esala Ekaniseli na yango, atako na bisika mosusu ekoki ntango nyonso kosalema bongo te. Epai oyo masangá mingi ezali kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi na bino ete soki likoki ezali, ntango likita ya liboso ekosila, bólekisa miniti 40 mpo na kobanda likita ya mibale mpo na kozwa ntango ya kopesa babyangami mbote, kolendisa bato oyo babandi kosepela na solo mpe mpo moto na moto azwa litomba. Lisangani ya bankulutu basengeli kopona ebongiseli oyo ekozala malamu na esika oyo bafandi.
◼ Lamuká! ya lokota ya Icibemba ekobima lisusu sanza na sanza te; ekobanda kobima nsima ya sanza misato.
◼ Lamuká! ya 8 Yanuali mpe ya 22 Yanuali 2002 (ebimeli ya Lifalanse) ekozala na masolo oyo ekobenda likebi ya bato mingi na mokili mobimba: ekolobela likambo ya babuludingi mibale oyo ekweaki na New York, ekolobela mokakatano ya bato bakimá mboka na mokili mobimba mpe minyoko oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na ekólo Géorgie. Lokola masolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso. Yango ezali kaka mpo na banimero wana mibale ya Lamuká!
◼ Lamuká! ya 8 Febwali 2002 ekozala na lisolo: “Le mariage: comment assurer un début heureux” (Ndenge ya kobanda libala na esengo). Na ntembe te, lisolo yango ekosepelisa mpenza bato mingi na teritware na biso; yango wana, bakobakisela lisangá mokomoko bazulunalo koleka ndenge bazwaka liboso (15 %). Yango ezali kaka mpo na nimero wana ya Lamuká!
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Annuaire 1999; Index 1986-1995; Esakweli ya Yisaya 1, na ekomeli ya monene; Olingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia? (T-26); volimi relye ya Lamuká! 1995, 1996, 1997; volimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1996.
Lingelesi: Index 1986-2000; Olingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia? (T-26); Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002.
Swahili: Esakweli ya Yisaya 1, na ekomeli ya monene; Olingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia? (T-26).