‘Tóbomba mwa eloko pembeni’
Na ekeke ya liboso, lisangá ya boklisto ezalaki na mposa ya biloko mwa mingi. Na kotalela makoki ya moto na moto, moklisto mokomoko asengelaki ‘kobomba mwa eloko pembeni,’ oyo akopesa likabo mpo na kokokisa mposa yango. (1 Kol. 16:1-3, NW) Ezaleli na bango ya kokaba esalaki ete bango nyonso básepela na kopesa “matɔndi mingi epai ya Nzambe.”—2 Kol. 9:11, 12, NW.
Lelo oyo, mosala ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba ezali kaka kokóma monene; yango wana, mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala yango ezali kosɛnga mbongo mingi. Ebongi ete biso mpe ‘tóbombaka mwa eloko pembeni’ mpo na kopesa lisungi yango mbala na mbala. (2 Kol. 8:3, 4, NW) Ezali na mitindo ndenge na ndenge oyo tokoki kopesa makabo. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2001 nk. 28-29.) Mpo na biso, tomonaka mpenza ete kopesa makabo ezali libaku moko ya ntina mingi oyo ememaka esengo ya solosolo.—Mis. 20:35.