Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/02 lok. 1
  • Bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na esengo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Okoki kozwa esengo ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 2/02 lok. 1

Bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na esengo

1 “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.” (Nz. 144:15) Maloba wana emonisi ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na esengo. Esengo wana, oyo eutaka na kosalela Yehova, Nzambe se moko ya solo mpe ya bomoi, ekokani na mosusu te. Lokola azali “Nzambe ya esengo,” baoyo basambelaka ye bamonisaka esengo na ye. (1 Tim. 1:​11, NW) Makambo nini ya losambo na biso esalaka ete tózala na esengo?

2 Ntina ya kozala na esengo: Yesu andimisaki biso ete esengo eutaka na ‘koyeba bobola na biso ya elimo.’ (Mat. 5:​3, NW) Mpo na kosilisa bobola yango, tosengeli koyekolaka Biblia mpe koyanganaka na makita nyonso ya boklisto. Boyebi oyo tozwi ya solo ya Liloba ya Nzambe esikoli biso na bokosi mpe na mabunga ya mangomba. (Yoa. 8:32) Makomami eteyi mpe biso ndenge ya kozala na bomoi oyo eleki malamu. (Yis. 48:17) Ezali mpo na yango nde tozali na baninga ya malamu mpenza na kati ya lisangá ya bandeko na biso baklisto oyo bazali na esengo.​​—⁠1 Tes. 2:​19, 20; 1 Pet. 2:​17, NW.

3 Kotosa mitinda ya Nzambe na oyo etali bizaleli malamu epesaka biso esengo mingi, mpo toyebi ete yango ebatelaka biso mpe esepelisaka Yehova. (Mas. 27:11) Mopanzi-nsango moko alobaki ete: “Atako Batatoli ya Yehova bazalaka na mibeko ya makasi, bamonanaka te ete bazali na mawa. Kutu, bazalaka nde na esengo. Bilenge mpe mikóló, bango nyonso bamonanaka ete bazali na esengo mpe na bokatikati oyo bato mosusu bazalaka na yango te.” Ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu mpo bázala na bomoi ya esengo lokola biso?

4 Tósalisa bato mosusu mpo bázala na esengo: Mokili etondi nde na mawa mpe bato mingi bamonaka ete mikolo ezali koya ekomemela bango eloko moko ya malonga te. Kasi, biso tozali na elikya ya malamu, mpamba te toyebi ete ezali na mokolo oyo moto moko te akozala lisusu na mawa. (Emon. 21:​3, 4) Yango wana, tosakolaka na molende mpo na koluka bato ya mitema sembo oyo tokoki koyebisa bango elikya na biso mpe makambo oyo tondimaka na ntina na Yehova.​​—⁠Ezek. 9:⁠4.

5 Ndeko mwasi moko, oyo azali mobongisi-nzela alobaki ete: “Kosalisa bato báyeba Yehova mpe mateya na ye ya solo epesaka esengo oyo eloko mosusu ekoki kopesa te.” Tósala nyonso ekoki na biso mpo na kolendisa bato mingi lisusu ete bándima koyekola Biblia na bandako na bango. Kosalela Yehova mpe komipesa mpo na kosalisa bato mosusu básalela ye epesaka esengo ya koloba te.​​—⁠Mis. 20:⁠35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto