Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/02 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 2/02 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, to buku nyonso ya kala ya nkasa 192 oyo lisangá ezali na yango. Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Lokola mbongwana minene ekɔti mpo na oyo etali baabonema ya bazulunalo mpe ya bakasɛti, tolingi koyebisa bino makambo oyo elandi: Kobanda na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 2002 mpe Lamuká! ya 8 Marsi 2002, abonema ekozala lisusu te; basakoli nde basengeli kobanda kokende kotika bazulunalo epai ya bato oyo basɛngaka yango. Biro ekotinda mbala moko baabonema nyonso ya bazulunalo na minɔkɔ ya bapaya lokola kaka komande oyo lisangá esalaka mbala na mbala. Yango elingi koloba ete banimero ya nsuka oyo bato oyo basalá abonema bakozwa ekozala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali mpe Lamuká! ya 22 Febwali 2002 (1 Febwali mpe 8 Febwali mpo na minɔkɔ oyo bazulunalo yango ebimaka mbala moko na sanza). Soki masangá elingi kosɛnga bazulunalo na minɔkɔ ya bapaya, esengeli kosalela fɔrmilɛrɛ M(d)-202-F “Demande pour congrégation: périodiques/Ministère du Royaume.” Abonema nyonso ya bakasɛti ya radio ekosɛngama ndenge moko na oyo ya bazulunalo, elingi koloba esengeli kaka kotondisa fɔrmilɛrɛ M(d)-202-F. Bótala mpe mokanda “Instructions pour la demande de publications” S(d)15a-F Cn.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Marsi to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki moko kati na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli mpo ete azwa lisungi oyo esengeli. Mpo na kozwa makanisi, talá nkoma S-201 oyo la Société atindaka mbula na mbula. Talá mpe lisolo oyo ezali na Mosala na Biso ya Bokonzi ya Mai 1987, na lokasa 3.

◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2002 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema mokolo ya lomingo mwa 14 Aprili. Motó ya likambo ya lisukulu yango ezali: “Tóbatela na makanisi ‘Mokolo ya nsɔmɔ’!” Plan na yango ekotindama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo ekozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, ekosala lisukulu yango ya ntina mingi na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 14 Aprili 2002.

◼ Lamuká! ya 8 marsi 2002 (na Lifalanse) ekozala na lisolo oyo: Les enseignants​​—⁠Que pourrions-nous faire sans eux? (Tolingaki kosala nini soki balakisi bázalaka te?). Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002 ekozala na lisolo oyo emonisi ndenge Klisto atambwisaka lisangá. Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Tolingi koyebisa lisangani ya bankulutu ndenge nini basengeli kosalela baplan ya masukulu ya bato nyonso oyo bazwaki: (1) Mokɛngɛli-mokambi asengeli kobatela baplan nyonso na esika ya malamu mpenza. (2) Akopesa molobi kaka fotokopi ya plan, kasi plan oyo euti na biro te. (3) Lisukulu moko wana ekoki kosalema na molobi mosusu. (4) Baplan nyonso ya sika oyo biro ekobanda kotindela bino, bosengeli kotya yango na dosye na bino mbala moko. (5) Bóyeba ete la société atindaka baplan mosusu ya masukulu na esika ya oyo ya kala kaka soki bakɔtisi mbongwana na makambo oyo ekomami na baplan yango. Na ntango wana, bosengeli kopasola baplan ya kala mpe kotya oyo ya sika na esika na yango. Soki tozali kosala makambo lolenge wana, lisangá ekozwa nzela ya koyoka masukulu ya bato nyonso oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse, Lingelesi: Calendrier 2002.

Otetela: Tyá likebi na esakweli ya Danyele!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto