Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko asepeli, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kolakisa buku mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. To soki bolingi bokoki kosalela, La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1988, soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na babuku ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu.
◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali na “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003” mpe tosengeli kobatela yango malamu mpamba te tokosalela yango na boumeli ya mobu 2003 mobimba.
◼ Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mokolo ya 1 Yanuali, mokomeli ya lisangá asengeli kotondisa formilɛrɛ S-AB-5 (Réunions de la congrégation) mpe kotinda yango na biro.
◼ Mbala mingi, biro etindaka mikanda ya bakɛngɛli-batamboli na nzela ya mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo bakei kotala to oyo etikali moke bákende kotala. Makambo oyo ezali na kati ya mikanda yango etali kaka bango. Bakɛngɛli-batamboli balobi ete mbala mingi bandeko bafungolaka mikanda yango liboso kutu bango bakóló mikanda bázwa yango. Mpo makambo ya ndenge wana esalema lisusu te, bakɛngɛli-bakambi basengeli kotala malamumalamu nkombo ya moto oyo batindeli ye mokanda na mikanda nyonso bazwaka liboso ya kofungola yango. Basengeli kotya mpenza likebi na likambo yango koleka soki mikolo oyo mokɛngɛli-motamboli akoya kotala lisangá na bango ebɛlɛmi. Esengeli kopesa mokanda nyonso oyo batindeli mokɛngɛli-motamboli na mabɔkɔ na ye moko, kasi kofungola yango te.
◼ “Na mokolo ya 30 Novɛmbɛ 2002, libota ya Betele ekozala na makambo oyo etali kaka bango moko mpe na mokolo ya 7 Desɛmbɛ 2002, bakosukola Betele mobimba. Na yango, tobondeli bino ete moto moko te aya kotala Betele to kotala ndeko oyo afandaka na Betele na mikolo yango.”
◼ Soki bozwi naino te bazulunalo oyo tosengeli kolakisa ndenge balobelaka yango na lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi, bósalela ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya kala mpe oyo ekokani na bazulunalo oyo bozwi na lisangá.
◼ CD ya sika oyo tozali na yango:
Lingelesi: Tómemya bokonzi ya Yehova (Drame, CD moko)
◼ Kasɛti-video ya sika oyo tozali na yango:
Elobeli ya Bikela ya Amerika: La Bible: un récit historique exact, des prophéties dignes de foi (Volimi 1); Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota (Vol. 1-6)