Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi bayanganaka na makita nyonso ya lisangá te, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka mpenza nini? Mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kolakisa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1995.
◼ Na pɔsɔ oyo bozali na liyangani, ezala ya etúká, ya zongazonga, to ya mokolo moko, Boyekoli ya Biblia na lisangá, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe Likita ya Mosala ekosalema te na lisangá. Mpo na yango, tolendisi bandeko nyonso báyekola makambo oyo ebongisami mpo na pɔsɔ yango na bandako na bango, na ndakisa na mokolo ya Losambo na kati ya libota.
◼ Tolingi kobenda likebi na bino na mwa libunga oyo ekɔtaki na buku na biso ya sika Tópesa litatoli. Na lokasa 198, molɔngɔ ya liboso ekomami boye: ki kozwa bikateli ya mabe ndenge wana mpo na kosepelisa bato mosusu. Esengeli koboma molɔngɔ yango. Lisusu, nsima ya kotánga maloba Na nsima oyo ezali na nsuka ya lokasa yango, na paragrafe 10, liboso ya kokoba na maloba ya lokasa 199, esengeli kobakisa molɔngɔ moko na nse, oyo ekoloba boye: Paulo alobelaki bomoi na ye liboso akóma mokristo; alobaki boye: “Na kola-. Moto na moto abongisa bisika yango na buku na ye.