Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/10 lok. 1
  • Liso na yo ezali alima?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liso na yo ezali alima?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Batelá liso na yo alima
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bomoi ya pɛpɛlɛ esalisaka biso tósanzola Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Zala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 6/10 lok. 1

Liso na yo ezali alima?

1. Kozala ‘liso alima’ elimboli nini?

1 Tobendamaka na kosala makambo oyo miso na biso emonaka mbala na mbala. Yango wana, maloba oyo ya Yesu ebongi mpenza: “Soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga”! (Mat. 6:22) Soki liso na biso ya elimo ezali “alima,” ekotala kaka likambo moko: kosala mokano ya Nzambe. Tokotya Bokonzi na esika ya liboso mpe tokobendama te na biloko oyo ezangi ntina to na makambo oyo ekopekisa biso tósakola mingi.

2. Nini ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela makambo, kasi nini ekosalisa biso?

2 Tosengeli komitalela: Biloko oyo tomonaka na piblisite to epai ya bato mosusu ekoki kobebisa lolenge na biso ya kotalela makambo. Liboso ya kosala likambo moko ya monene to kosomba eloko moko oyo ekosɛnga biso ntango mingi, mbongo mingi, mpe makasi mingi, ekozala malamu “koyeba mosolo boni yango ekosɛnga,” mpe komituna boye: ‘Likambo yango to eloko yango ekosalisa ngai nakende liboso na mosala ya Yehova, to ekozongisa ngai nde nsima?’ (Luka 14:28; Flp. 1:9-11) Ezali mpe malamu komitalela mbala na mbala mpo na koluka ndenge ya kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ mpo tózwa ntango ya kosakola mingi.​—2 Ko. 13:5; Ef. 5:10.

3. Liteya nini tozwi na ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo akómisaki bomoi na ye pɛpɛlɛ?

3 Ntango ndeko mwasi moko abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amonaki malamu akoba na mosala oyo azalaki kosala mikolo nyonso, atako akokaki mpe kozwa mbongo ya kobikela soki asali mikolo mibale to misato na pɔsɔ. Nsukansuka, alobaki boye: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale. Natikaki koluka biloko oyo nazalaki na bosɛnga na yango te mpe nakómaki koluka kaka biloko oyo nasengelaki na yango. Nayaki komona ete biloko ya mokili esilaka valɛrɛ, mpe soki nabomi nzoto mpo na koluka yango, nakolɛmba mpamba.” Ndeko mwasi yango akómisaki bomoi na ye pɛpɛlɛ, azwaki mosala mosusu, mpe yango esalisaki ye akoba kozala mobongisi-nzela.

4. Mpo na nini tosengeli kobatela liso na biso alima kozanga kozela?

4 Lokola ntango oyo etikali ekómi mokuse, ezali na ntina mingi tóbatela liso na biso alima. Mokolo na mokolo, tozali kopusana na nsuka ya mokili oyo mpe na ebandeli ya mokili ya sika ya Nzambe. (1 Ko. 7:29, 31) Soki totye miso na biso kaka na mosala ya kosakola, tokomibikisa mpe tokobikisa bato oyo bazali koyoka biso.​—1 Tim. 4:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto