Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/11 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 2/11 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Febwali 2011. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Yanuali tii na pɔsɔ ya 28 Febwali 2011.

1. Mosala nini Hizikiya asɛngaki básala ntango abandaki koyangela, mpe ndenge nini tokoki komekola ye lelo oyo? (2 Nt. 29:16-18) [w09 15/6 lok. 9 par. 13]

2. Ndenge nini 2 Ntango 36:21 emonisi kokokisama ya esakweli oyo ezali na Yirimia 25:8-11? [w06 15/11 lok. 32 par. 1-4]

3. Ndenge nini Ezera 3:1-6 emonisi mpe ete mbula 70 oyo Yerusaleme esengelaki kotikala mpamba esukaki mpenza na ntango oyo Biblia esakolaki? [w06 15/1 lok. 19 par. 2]

4. Mpo na nini Ezera akamwaki ntango bayebisaki ye ete bana ya Yisraele bazalaki kobala basi ya bikólo mosusu? (Ezr. 9:1-3) [w06 15/1 lok. 20 par. 1]

5. ‘Bato ya lokumu’ bazalaki banani mpe ezaleli nini bamonisaki, oyo biso tosengeli te kolanda? (Neh. 3:5) [w06 1/2 lok. 10 par. 1; w86-F 15/2 lok. 25]

6. Ndenge nini guvɛrnɛrɛ Nehemia azali ndakisa malamu mpo na bakɛngɛli bakristo? (Neh. 5:14-19) [si lok. 90 par. 16]

7. Na ndakisa ya Bayisraele ya ntango ya Nehemia, ndenge nini tokoki koboya kosundola “ndako ya Nzambe na biso”? (Neh. 10:32-39) [w98 15/10 nk. 21 par. 12]

8. Kokanisa na ntina na etamboli ya Nehemia ekoki kosala ete tómituna mituna nini? (Neh. 13:31) [w96 15/9 lok. 16 par. 3]

9. Elenge mwasi Estere asalaki nde pite elongo na mokonzi Ahasueruse? (Est. 2:14-17) [w91 1/1 lok. 31 par. 6]

10. Mpo na nini Mordekai aboyaki kogumbama liboso ya Hamane? (Est. 3:2, 4) [it-2-F lok. 345 par. 5]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto