Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/11 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 3/11 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi bayanganaka na makita nyonso ya lisangá te, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kolakisa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1995.

◼ Ntango ozali kopesa litatoli na moto moko oyo alobaka monɔkɔ ya Chinois, lakisá ye mwa buku Nations, na lokasa oyo bakomi Chinois ya makasi (CH) mpe oyo bakomi Chinois ya pɛtɛɛ (CHS) mpo na koyeba Chinois nini alingaka kotánga. Mbala mingi, bato ya Hong Kong mpe ya Taïwan balingaka kotánga mikanda oyo ekomami na Chinois ya makasi (CH), nzokande bato ya Chine balingaka Chinois ya pɛtɛɛ (CHS). Kasi mpo na ba video, kasɛti to CD, ezali malamu kopesa ye yango na Chinois oyo ye alobaka mpe ayebi yango malamu. Mbala mingi, ezala bato ya Chine to ya Taïwan, bango nyonso bayokaka Chinois Mandarin (CHM), kasi bato ya Hong Kong bayokaka nde Chinois Cantonais (CHC).

◼ Tokotalela video oyo ezali na motó ya likambo Les Témoins de Jéhovah : Organisés pour proclamer la bonne nouvelle na Likita ya Mosala na sanza ya Augusto. Soki bosengeli na yango, bokoki kosɛnga yango nokinoki na nzela ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto