Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Na Congo-Kinshasa, tozwaki mitángo ya sika nsambo na sanza ya Novɛmbɛ 2010. Mitángo yango, yango oyo: Basakoli 169 114, kati na bango babongisi-nzela ya sanza na sanza 14 058; tokabolaki babuku 165 749, mwa babuku 255 801 mpe bazulunalo 907 381; tozongelaki bato mbala 1 926 345 mpe toyekolaki Biblia na bato 449 289. Tiká ete mitángo oyo ya sika elendisa biso na mosala ya Yehova!