Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango kasi aboyi koyekola Biblia, akoki kopesa ye zulunalo moko to mwa buku mosusu oyo ekoki kosepelisa ye.
◼ Diskur ya ntina mingi ekosalema na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo nsima ya Ekaniseli, mpe motó ya likambo na yango elobi “Nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene?”
◼ Soki olingi kokende na mboka mopaya oyo ezali te na liste ya mikili oyo ezali na lapolo ya mbula oyo, to oyo adrɛsi na yango etyami te na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo, tuná biro ya filiale ya mboka na bino mpo na koyeba makambo oyo osengeli kokeba na yango to malako oyo osengeli kolanda. Ekoki kozala ete, na mboka yango, batyelá mosala na biso ya Bokonzi mibeko. (Mat. 10:16) Na mikili mosusu, ekozala malamu te ete moto oyo azali mopaya aluka kokutana na Batatoli ya mboka wana. Biro ekoki kopesa yo malako mosusu etali ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu to komema mikanda. Kolanda malako yango ekosalisa yo okutana na mikakatano te mpe olukela lisangá makambo te.—1 Ko. 14:33, 40.
◼ Bankulutu oyo bazali na ks10 ya Lifalanse basengeli kobongisa mokanda na bango na lokasa 112: Na esika ya w99 1/11 nkasa 28-29, bátya nde km 6/05 F-Cn, lokasa 5.
◼ Lokola tokozala na makambo ya sipesiale oyo ekosalema na Betele na Aprili mpe Mai, tosɛngi na bino bóya te kotala Betele to bandeko ya libota ya Betele na mikolo oyo elandi: Mwa 9 tii 20 Aprili 2012, mpe mwa 21 Mai tii 1 Yuni 2012.
◼ Mokɛngɛli na mosala ya kosakola elongo na sekrɛtɛrɛ basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza. Basengeli kosala yango pene na katikati ya mobu ya mosala mpo ete bibongiseli ezwama mpo na kosalisa moko na bango oyo azali na mokakatano ya kokokisa bangonga.