Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya yambo mpe ya mibale: Mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Okoki kozala moninga ya Nzambe!, Ntango moto oyo olingaka akufi. . . , to Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia. Sanza ya misato mpe minei: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia.
◼ Diskur ya bato nyonso mpo na mobu ya mosala 2013 oyo mokɛngɛli ya zongazonga akosala ezali na motó ya likambo: ‘Nsango malamu . . . mpo na bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso.’