Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya misato mpe sanza ya minei: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia.
◼ Masangá esengeli kosɛngaka mbala na mbala mwa babuku mibale ya sika Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? mpe Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpo ezangaka te. Bokoki kotondisa formilɛrɛ S-14 mpe kotinda yango nsima ya sanza misato nyonso.
◼ Tozali na esengo ya koyebisa bino ete kobanda na sanza ya 4, 2013 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekobanda kobima na monɔkɔ ya Kisonge; ekozala na masolo ya bato nyonso mpe ya boyekoli esika moko. Mosala na biso ya Bokonzi mpe ekobanda kobima na monɔkɔ yango na sanza ya 6, 2013.
◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya mibale, 26/03/2013. Soki lisangá na bino esalaka makita mokolo ya Mibale, makita yango esengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki likoki ya kosala Likita ya Mosala ezali te, mokambi-misala ya bankulutu akoki kokɔtisa masolo ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino, na programɛ ya Likita ya Mosala mosusu na sanza wana. Masangá oyo bakoyamba mokɛngɛli ya zongazonga, bakosala makita mokolo ya Mibale te ndenge esalemaka, kasi nde mokolo mosusu na kati ya pɔsɔ wana.