Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Na sanza ya misato 2014, masangá 3 332 na Congo-Kinshasa epesaki lapolo ya mitángo ya sika mingi: babuku mpe bavideo na elobeli ya bageste 229 438, mwa babuku 1 592 937, bangonga 3 864 834, bazulunalo 1 688 038, bozongeli ya sika 2 490 543 mpe boyekoli ya Biblia 583 462. Topesi bino longonya mpenza mpo na mosala oyo bosalaki. Liyebisi epai ya basɛkrɛtɛrɛ: Tosɛngi bino bókoba kotinda balapolo na nzela ya SMS, soki bokoki kotinda yango te na site jw.org. Matɔndi na likebi oyo bozali kotya na likambo yango. Bósalaka mpe bongo na lisangá na bino.