Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Na mokolo ya 17/01/2015, bandako ya sika ya biteyelo efungwamaki na Kinshasa. Banda wana, Eteyelo ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe basi na bango, ná Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi ezali kosalema na esika yango. Bato 1 264 balandaki diskur ya bofungoli oyo esalemaki na ndeko Gerrit Lösch, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na mokolo oyo elandaki, ndeko Lösch akambaki programɛ ya kopesa badiplome na bana-kelasi 50 ya bakelasi mibale ya liboso ya Eteyelo mpo na bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi oyo esalemaki na teritware na biso. Na nsima ya midi, likita moko ya sipesiale esalemaki na Ndako ya mayangani na Limete, na Kinshasa. Ezalaki na diskur moko oyo motó ya likambo na yango elobaki: “Bomoko ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba banda sikoyo” mpe lapolo oyo emonisaki ndenge mosala ya kosakola ebandaki na Congo-Brazzaville mpe na Congo-Kinshasa . . . Na nsima, bandeko mosusu na bisika ndenge na ndenge ya teritware na biso, balandaki yango na nzela ya CD (ata mpe na video na mwa bisika mosusu). Bandeko koleka 115 177 balandaki diskur yango.