Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Mars lok. 7
  • Lisiko epesi biso elikya ya lisekwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisiko epesi biso elikya ya lisekwa
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ata tozali na mawa, tozangi elikya te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Likambo oyo ekosukisa liwa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakoki kozonga na bomoi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Mars lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Lisiko epesi biso elikya ya lisekwa

Ntango bato ya libota mpe baninga baleli elenge mwasi moko oyo akómi pene na liwa, na nsima, ndeko na ye ya mwasi abɔndisami ntango amanyoli na elikya ya lisekwa

Ekaniseli esalisaka biso tókanisa na mozindo likoló ya mapamboli oyo tokozwa na nzela ya lisiko na mikolo ezali koya, na ndakisa, lisekwa. Yehova akaná te ete bato bakufaka. Yango wana, mawa toyokaka ntango moto oyo tolingaka akufi ezalaka moko ya makambo ya mpasi mingi na bomoi. (1Ko 15:26) Yesu ayokaki mpasi mingi ntango amonaki bayekoli na ye bazali kolela Lazare. (Yn 11:33-35) Lokola Yesu amonisaki mpenza bomoto ya Yehova na ndenge ya kokoka, tokoki kondimisama ete Yehova mpe ayokaka mpasi ntango amonaka biso tozali kolela bandeko na biso oyo bakufi. (Yn 14:7) Yehova azelaka na mposa makasi ntango oyo akosekwisa basaleli na ye; biso mpe tosengeli kozelaka yango bongo.​—Yb 14:14, 15.

Lokola Yehova azali Nzambe ya molɔngɔ, tokoki kondimisama ete lisekwa ekosalema na mobulu te. (1Ko 14:33, 40) Na esika ete tókundaka bibembe, tokobanda nde koyamba bandeko na biso oyo bakufá. Okanisaka na mozindo likoló ya lisekwa, mingimingi ntango ndeko to moninga na yo akufi? (2Ko 4:17, 18) Opesaka Yehova matɔndi na ndenge apesá biso lisiko mpe ayebisá biso na Biblia ete bato bakufá bakozonga na bomoi?​—Kol 3:15.

  • Baninga mpe bandeko na yo nini ozelaka mpenza komona bango lisusu?

  • Na bato oyo Biblia elobelaka, banani olingaka mpenza kokutana mpe kosolola na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto