13-19/02
YISAYA 52-57
Loyembo 148 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Kristo anyokwamaki mpo na biso”: (Min. 10)
Yis 53:3-5—Bato batyolaki ye, mpe anyatamaki mpo na mabunga na biso (w09 15/1 26 par. 3-5)
Yis 53:7, 8—Andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso (w09 15/1 27 par. 10)
Yis 53:11, 12—Tokoki kotángama bayengebene mpo atikalaki sembo tii liwa (w09 15/1 28 par. 13)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Yis 54:1—Nani nde “ekomba” oyo esakweli yango elobeli, mpe “bana” na ye nde banani? (w06 15/3 11 par. 2)
Yis 57:15—Na ndenge nini Yehova “afandaka” esika moko na baoyo ‘batutami’ mpe baoyo ‘bazali na elimo ya komikitisa’? (w05 15/10 26 par. 3)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi ngai nini mpo na Yehova?
Makanisi nini ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo nakoki kosalela na mosala ya kosakola?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Yis 57:1-11
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) lf—Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye.
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) lf 30-31—Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye lisusu.
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 6 te) bh 14-15 par. 16-17—Soki likoki ezali, papa ayekola na mwana na ye ya moke, ya mobali to ya mwasi.
BOMOI YA BAKRISTO
“Salisá bana na yo bázala na kondima makasi ete Mozalisi azali”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Makambo bilenge mosusu balobi: Kondima ete Nzambe azali.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) kr mok. 8 par. 8-13 mpe etanda “Kobimisama ya mikanda na mokili mobimba”
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 107 mpe libondeli