Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Février lok. 6
  • Sepelá na elikya na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sepelá na elikya na yo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Batelá elikya na yo ya bokristo makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tyelá Yehova elikya mpe zalá na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Epai wapi okoki kozwa elikya ya solosolo?
    Lamuká!—2004
  • Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Février lok. 6
Na losambo na kati ya libota, mama ná bana na ye bazali koyekola ndenge ya kosakola

BOMOI YA BAKRISTO

Sepelá na elikya na yo

Elikya ezali lokola longo. (Ebr 6:19) Esalisaka mpo boyokani na biso na Nzambe ebeba te lokola masuwa oyo epanzani na ntango ya mopɛpɛ makasi. (1Ti 1:18, 19) Mipɛpɛ makasi mpo na biso ekoki kozala kolɛmba nzoto, kobungisa biloko ya kobikela, maladi oyo eumeli, liwa ya moto oyo tolingaka, to likambo mosusu nyonso oyo ezali komeka bosembo na biso.

Kondima mpe elikya esalisaka biso tómona polele mbano oyo Nzambe alaki. (2Ko 4:16-18; Ebr 11:13, 26, 27) Na yango, tózala na elikya ya kokende likoló to ya kozwa bomoi na mabele, tosengeli ntango nyonso komanyola bilaka oyo ezali na Biblia mpo na kobatela elikya na biso. Na yango, ntango tokokutana na mikakatano, ekozala mpasi te tóbatela esengo na biso.​—1Pe 1:6, 7.

TALÁ VIDEO BÓSEPELA NA ELIKYA, MPE PESÁ BIYANO NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini Moize azali ndakisa malamu?

  • Batata ya mabota bazali na mokumba nini?

  • Masolo nini bokoki kotalela na Losambo na kati ya libota?

  • Ndenge nini elikya ekoki kosalisa yo ozala na mpiko na ntango ya komekama?

  • Makambo nini ozali kozela na motema moko?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto