MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 12-16
Yisraele ebosanaki Yehova
Yirimia azwaki mokumba moko ya mpasi oyo ezalaki komonisa ete Yehova akanaki kosukisa lolendo mpe motó makasi ya Yuda ná Yerusaleme.
Yirimia azwaki mokaba moko ya lini
Kolata mokaba yango na loketo emonisaki boyokani makasi ya Yehova ná Yisraele
Yirimia amemaki mokaba yango na ebale Efrate
Abombaki yango na lidusu ya libanga, mpe na nsima azongaki na Yerusaleme
Yirimia azongaki na ebale Efrate mpo na kozwa mokaba yango
Mokaba yango ebebaki
Yehova alimbolaki likambo yango wana Yirimia asilisaki kokokisa mokumba oyo apesaki ye
Ndenge Yirimia atosaki na motema moko ata na likambo wana oyo emonanaki lokola ezali na ntina te, esalisaki Yehova asimba mitema ya bato