INDONÉSIE
Mbula 50 na mosala ya mobongisi-nzela monene
Alisten Lumare
ABOTAMAKI NA 1927
BATISIMO 1962
NA MOKUSE Kala azalaki mokonzi ya bapolisi, kasi sikoyo azali mobongisi-nzela monene koleka mbula 50.
Na 1964, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na engumba Manokwari, na Papouasie occidental, na lisangá moko ya moke oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kotɛmɛla makasi. Ntango nakómaki kuna, pastɛrɛ moko ya Baprotesta akɔtelaki ngai na ndako.
Abelelaki boye: “Nakobuka ndako oyo mpe nakosilisa Batatoli ya Yehova na Manokwari.”
Lokola nazaláká kosala na polisi, makɛlɛlɛ na ye ebangisaki ngai te. Kasi, nayanolaki ye na boboto, mpe nsukansuka akendaki na kimya.—1 Pe. 3:15.
Na ntango wana, basakoli bazalaki mwambe. Lelo, mbula soki 50 na nsima, masangá ekómi nsambo na Manokwari. Bato koleka 1 200 bayaki na liyangani ya etúká oyo tosalaki na 2014. Soki natali makambo oyo Yehova asali na mboka oyo ya mosika, nayokaka esengo mpenza.