Nkomá ya batángi
Bafɛ́ti Lisoló “Bafɛ́ti: mpo na nini bana mosusu basalaka yango te” oyo ebimaki na Lamuká! ya Novɛ́mbɛ 22, 1993 (ebimeli ya Lifalansé) elelisaki ngai na esengo. Nabokwamaki na baboti Batatoli ya Yehova mpe nazalaki na mayoki motindo moko na ebele ya bana oyo balobelami kati na lisoló yango. Nazali kopesa longonya na bilenge baklisto mpo na ndakisa na bango malamu bazali kopesa. Koyeba ete ezali na bana oyo bazali kolinga kosepelisa Yehova ezali elendiseli mpo na mama ya libota lokola ngai.
T. K., Etats-Unis
Nazali na mibu libwa mpe nayebaki te ete Halloween ezali fɛ́ti mabe. Nakanisi ete nazangisi eloko moko te.
A. C., Etats-Unis
Ntango nazalaki mwana, nabandaki kozela na motema likoló Eyenga ya Mbótama mpe Pásiká. Nzokande, lelo nayebi ete bafɛ́ti yango ezali ya bapakano mpe ezali na ntina te ya kolandela yango. Bandimbola oyo epesamaki ezalaki ya kokoka.
S.P., Allemagne
Nabokwamaki na baboti Batatoli ya Yehova uta nazalaki na mibu motoba, mpe sikawa nakómi na mbula ntuku misato. Bato mingi bakanisaki ete ndeko na ngai ya mobali, bandeko na ngai ya basi mpe ngai, tozalaki na mawa. Nalimbwelaki bango ete tózwaka makabo ntango nyonso na mbula mpe baboti na biso bazalaki kopesa biso ntango na bango mpe bomoto na bango moko. Tozalaki kosala makambo mingi elongo. Tata na ngai azalaki mpe kosala nyonso ete boyekoli na biso ya libota esalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Ezalaki mpenza likabo ya elimo eleki malamu oyo asengelaki kopesa biso! Nayokaki motema mpasi soko moke te mpo ete nasanganaki na bafɛ́ti te.
D.Y., Etats-Unis
Nazali na mibu zomi na minei mpe nazali komimona mpenza kati na lisoló yango. Nazali na esengo mpo ete bolobeli yango. Komona bilenge mosusu kozwa etɛlɛmɛlo mpo na solo ezali kolendisa ngai.
C.A., Etats-Unis
Nakanisi te ete nazangi eloko moko lokola nazali kosangana na bafɛ́ti te. Baboti na ngai bapesaka ngai makabo mpe mosolo oyo nazali na yango mposa. Na nyonso, nazali na biloko ya kosakana lokola mpe bana mosusu oyo tokokani na bango na mbula.
L. C., Etats-Unis
Lisoló oyo ezali eyano ya mabondeli na ngai mingi. Tozali koyeba mpenza te bisengo mpe kobanga oyo ezalaka elongo na bobɔkɔli ya bana kino miso ya mwana moke etóndi na mpisoli ezali kotala biso mpe ezali kosala lokola azali kotuna biso mpo na nini bazali kosɛka ye. Mwana na biso ya mwasi akɔti na kelasi ya maternelle na mbula oyo, mpe atako tolobelaki ye mpo na bafɛ́ti, ezalaki mpasi mpo na ye. Tobondelaki mpokwa nyonso mpo ete azala na mpiko mpe na molende na eteyelo. Na nsima, tozwaki masoló ya Lamuká! Mpo ete atángaka lokola mwana ya mibu zomi na mibale, napesaki ye bobele zulunalo. Ntango atángaki masoló ya bana mosusu mpe amonaki bafɔtɔ́ na bango, azwaki elendiseli. Lobi na ntɔ́ngɔ́, apesaki na molakisi na ye ya mwasi zulunalo moko.
G. M., Etats-Unis
Na eteyelo, bana bazalaki kosɛka ngai mpamba te nazalaki kosangana te na bafɛ́ti. Nasalaki bakopi ya zulunalo mpe napesaki bango. Nandimisami ete bakosɛka ngai lisusu te, mpamba te bayebi sikawa ete nazali na mawa te.
K. H., Etats-Unis