Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 3-4
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esengeli bobele te kozala na mosolo
  • Lolenge ya bilei oyo bikoki kopesa yo nzoto kolɔngɔ́nɔ́
    Lamuká!—1995
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
    Lamuká!—2003
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Likama moko monene mpenza
    Lamuká!—2003
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 3-4

Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA BRÉSIL

Lolenge nini oponaka bilei na yo? Na ntango ozali kosomba biloko ya kolya, otalelaka makambo nini? Lolenge bakangi yango? Ntalo na yango? Kozanga nkaka mpo na kolamba? Maloba ya kolengola ya piblisité? To lolenge na yango mpe elengi na yango? Kosala liponi ya malamu ekoki komonisa soki bilei na yo bizali ya malamu to ya malamu te, mpe bongo soki kolɔngɔ́nɔ́ na yo ezali kobonga to ezali kobeba.

OBÓLA ezali ntina ya likambo mpenza oyo ezali kosala ete bato bálya malamu te. Soki bato mingi bazali kolya malamu, bamilió mosusu ya bato balyaka mpenza bilei ya malamu te. Motongi-ndako moko, tata ya bana motoba mpe mofandi na mboka Brésil alobaki ete: “Awa na ndako, tolyaka nyonso oyo emonani.” Bilei na bango ezalaka mingimingi mámpa ya kokauka na mwa káwa ya maimai mpe loso na madesu. Ya solo, engebene lapólo ya Mabota Masangani mpo na kotalela bilei mpe milóna (Organisation des Nations unies pour l’alimentation et l’agriculture) 20 % ya bato ya mokili mobimba bazali komona mpasi na nzala. Wana nzala ezali mingi kati na mikili misusu ya Afrika, ezali lisusu na motuya monene ya baoyo bazali na nzala kati na Azia. Ata kati na États-Unis, 12 % ya Baameriké to milió 30 balyaka malamu te.

Kozanga bilei ya malamu ekoki bobele te kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, kasi ekoki mpe koboma. Molukiluki William Chandler alobi ete: “Kolya ya malamu te oyo euti na kozanga bilei ya malamu ezali koboma bana mbala zomi koleka nzala yango moko. Elongo na pulúpulú oyo esilisaka mai na nzoto, kolya ya malamu te ezali ntina ya liboso ya kokufa [ya bato] kati na mokili.” Lapólo moko ya UNICEF (Fonds des Nations Unies pour l’enfance) elimboli ete: “Epidemi moko te, mpela moko te, koningana ya mabelé moko te to etumba moko te esilá kolongola bomoi ya bana 250 000 kati na pɔ́sɔ moko.” Engebene ebongiseli yango, wana ezali motuya ya bana kati na mokili mobimba oyo bazali kokufa na kolya ya malamu te mpe na makɔnɔ oyo mauti na yango. Ya solo, mbeba mosusu oyo eutaka na kolya ya malamu te ezali mpenza mingi koleka: makoki ya koyekola malɛmbaka, makasi ya kosala mosala mpe esilaka, ebebisaka kobota mbuma oyo euti na mosala mpe lolenge malamu na yango.

Nzokande, ekoki komonana ete na kolyáká bilei bilongobani, tokopɛngola kolya ya malamu te mpe matomba na yango mabe, lokola kozanga makila mpe mosusu. Lisungi ya Leta lokola kolya kati na eteyelo mpe kokabola pɔsɔ mpo na bato banso ekoki mbala mosusu kopesa matomba ya malamu kati na mikili mosusu, kasi bakonzi ya UNICEF bakanisi ete miliare 25 ya badolare na mbula mobimba esengeli mpo na kokitisa liwa ya bana oyo euti na pulúpulú, na bokɔnɔ ya mpanzi mpe na kintútu. Basusu bakoki koloba ete yango ezali ‘mosolo mingi.’ Ezali bongo, nzokande, ekanisami ete ezali mosolo oyo Baameriké bazali kolekisa na kosomba basapato ya masano, mpe bato ya Mpótó bazali kolekisa yango na masanga mbula na mbula. Mokakatano mosusu ezali ya kokitisa likambo litali kobebisa. Atako ekanisami ete bafandi milió 32 ya mboka Brésil bazali komona mpasi na nzala, minisitɛ́lɛ ya makambo matali milóna elobi ete “badolare miliare moko na ndambo oyo elekisamaka na makambo matali transport to tekiniki ya kobomba biloko ebungisaka 18 kino 20 % ya bozwi oyo euti na milóna ya mboka.” Atako mikakatano mingi mizali mpo na kolóna, komwangisa mai, kobomba biloko mpe transport na mikili misusu, nzokande mabelé mazali kobimisa bilei mingi mpo na bato banso. Na bongo, lolenge nini okoki koleisa libota na yo?

Esengeli bobele te kozala na mosolo

Kati na mikili ya bobóla, bato mingi baleisaka mabota na bango na kozaláká na misala mibale to misato. Na Brésil, mbula na mbula, bato milió moko na ndambo bazali kotika mabota na bango to baninga na bango mpo na kokende na bingumba minene koluka mosala to bilei. Atako kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto etalelaka mwa mingi mpenza bilei oyo bato bazali kolya, ndambo monene ya mosolo na bango ezali koleka na bilamba, na ndako mpe na transport.

Likambo ya kosepelisa, bilei ya momeseno lokola loso, madesu, masangu, mbálá, kwanga mpe makemba bakisá na mwa nyama mpe mbisi, ezali biutelo ya moboko mpo na bilei ya mabota kati na mokili mobimba. José Eduardo de Oliveira Dutra, moto na ntɔ́ki mpo na makambo matali bilei, mofandi na mboka Brésil alobi ete: “Madesu na loso ezali kosangisama moko ya malamu koleka mpo na bilei. Na lolenge ya bilei wana ya mindɔndɔ́ te mpe ya ntalo mingi te, ekoki kosalama ete tósilisa nzala kati na [mboka].” Ɛɛ, ezali mpe na bilei ya malamu oyo ezali na ntalo mingi te na esika ofandi. To okoki kobimisa yo moko ndambo ya bilei na yo.

Atako ozali na mosolo mingi, olekisaka yango na bilei ya malamu mpo na libota na yo? To olengolami na piblisité ya mayele mpe ya ntango nyonso na kolingáká biloko ya sukali to biloko oyo bizali malamu te mpe na bongo, kotyola biloko oyo bizali na vitamini mpe biloko mosusu ya ntina kati na nzoto? Elɛngi ezali nde liboso ya lolenge malamu ya bilei? Búku The World Book Encyclopedia elobi ete: “Mpo na kozala na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto malamu, bato basengeli kozala na boyebi ya moboko mpo na nzoto ya moto mpe lolenge nini yango esalaka. Na bongo, bakoki koyeba nini ekoki kosalisa to ekoki kosalisa te, to nini ekoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango. Koyekola koyeba kolɔngɔ́nɔ́ esengeli kozala eteni moko ya mateya ya moto nyonso.”

Ya solo, tozali kobika te bobele mpo na kolya, kasi yango ezali likambo ya ntina kati na bomoi na biso. Biblia ezali kolobela na ntina na kolya malamu lokola mbano ya mosala makasi na maloba oyo: “Moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo na Nzambe.” (Mosakoli 3:13) Ozali komona ntina ya bilei ya malamu? Soki ezali bongo, tosɛngi na yo ete otalela lisoló oyo elandi, ezali kolobela lolenge nini yo mpe libota na yo bokoki kozwa matomba na bilei ya malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto