Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Juillet lok. 30
  • Nkomá ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkomá ya batángi
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Banazi babomaki ebele ya Bayuda? Mpo na nini Nzambe asalaki eloko te?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bato ya sembo mpe ya mpiko balongi monyoko ya Banazi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Lamuká!—1996
g96 Juillet lok. 30

Nkomá ya batángi

Koboma ya nsɔ́mɔ Nazalaki ntango nyonso komituna mpo na nini moto moko te atɔndɔlaki koboma ya nsɔ́mɔ. Masoló “Koboma ya nsɔ́mɔ​—Nani atɔndɔlaki yango?” (22 Augústo 1995, ebimeli ya Lifalansé) mapesaki eyano na motuna na ngai. Batatoli ya Yehova basalaki bongo, nazali na esengo ya kozala na baninga motindo wana!

C. B., États-Unis

Atako nazali kati na lisangá na bino te, tiká ete nápesa bino longonya na lolenge oyo bolobelaki lisoló: Koboma ya nsɔ́mɔ. Natángá naino te lisoló ya kongɛngisama na ntina na ezalela mabe ya moto epai na mozalani na ye koleka oyo bokomaki yango na bosolo nyonso. Mpiko ya bandeko na bino Batatoli ya ntango wana ebosanami na mokili, yango ezali mpenza likambo ya mawa.

L.B., Angleterre

Tata na ngai akufaki na Sachsenhausen. Yaya na ngai ya mobali mpe akufaki nsima ya konyokwama na mabɔ́kɔ ya banazi. Nazali naino komikundola monyokoli makasi oyo Batatoli ya Yehova bazwaki na ebongiseli ya nazi. Yango ezali kopusa ngai ete namonisa botɔ́ndi na ngai epai na bino mpo na masoló yango. Mabongisami kitoko mpenza!

F. D. J., Canada

Masoló yango mabendaki likebi na ngai mingi. Kasi nandimi te ete ezalaki bobele Batatoli ya Yehova nde “batɔndɔlaki yango.” Bakoministe mpe bakebisaki bato mpo na Hitler liboso ete abanda koyangela. Mingi bakɔtaki na bakaa ya bakangami.

B. W., Allemagne

“Lamuká!” eyebi malamu ete Hitler azalaki na batɛmɛli mingi. Nzokande, lisoló yango lizalaki kolobela bobele kokweisama ya bibongiseli ya mangomba, mingi kati na mangomba yango basalaki elongo na ebongiseli ya Nazi. Banazi bango moko bazalaki kotalela Batatoli ya Yehova lokola banguna minene na bango mpo na lingomba. Kútu, Batatoli bazalaki etuluku bobele moko ya lingomba oyo ezwaki elembo ya koyebana kati na bakaa ya bakangami​—triangle ya lángi ya violet.​—Bakomi.

Koningana ya mabelé na Japon Lisoló “Kobebisama euti na biloko bizalisami oyo esalemaki na Japon” (22 Augústo 1995, ebimeli ya Lifalansé) ebimisaki ngai mpisoli. Moninga na ngai ya motema kati na solo akufaki na koningana yango ya mabelé. Azalaki na molende mingi. Nayebi ete akosekwa mpe nakoki kokutana na ye lisusu. Nazali na botɔ́ndi mingi mpo na lisungi ya elimo mpe ya mosuni oyo eutaki na lisangá mpe na la Société. Atako bongo, nalelaka lisusu ntango nakanisaka manso oyo malekaki mokolo yango.

T. M., Japon

Lisungi ya nokinoki mpe libongisami malamu ya Batatoli litikaki ngai monɔkɔ polele. Ntango natángaki maloba ya boboto oyo matindamaki na bandeko ya lisangá ya Corée, nakokaki kokangisa mpisoli na ngai te. Nayokaki mpenza esengo ya kozala kati na ebongiseli oyo ya boboto eyebi komibanzabanza mpo na basusu na lolenge wana.

M. K., Japon

Kotungisama na bana mibali to na bana basi Matɔ́ndi mingi na ndenge bobimisi lisoló “Kotungisama na bana mibali​—Ndenge nini nakoki komibatela na yango?” (22 Augústo 1995, ebimeli ya Lifalansé). Nazali na mibu 17 mpe nakutanaki na elenge mobali moko na eteyelo oyo azali moklisto te. Natyelaki ye motema, kasi na nsima, ye ná baninga na ye batungisaki ngai na maloba ya mbindo mpe babangisaki ngai. Nasengelaki kolongwa na eteyelo yango mpo na kokima ezalela wana. Lisoló yango liteyaki ngai makambo mingi. Sikawa nayebi lolenge nini nasengeli komitambwisa liboso ya bana mibali.

T. G., Portugal

Moninga moko ya mosala azalaki kotungisa ngai mpe kokanela ngai. Lokola nabebisamaki na bolenge na ngai, nazalaka na mokakatano ya komibatela. Kasi, nasɛngaki ye mbala na mbala ete atika ngai kimya. Nasukaki na koyebisa yango na nkólo ya mosala na ngai, mpe sikawa atungisaka ngai lisusu te. Lisoló yango lizali malamu mpenza. Basi basengeli koyeba ndenge nini bakoki kolónga mokakatano yango.

V. A., États-Unis

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto