Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet nk. 4-8
  • Koyeba kobongisa bana bákóma mikóló mpo bákende malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba kobongisa bana bákóma mikóló mpo bákende malamu
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koteya bana bázala bato oyo bakokoka komema mikumba
  • Kosembolama oyo etondi na bolingo
  • Kelasi mpo na bomoi
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Juillet nk. 4-8

Koyeba kobongisa bana bákóma mikóló mpo bákende malamu

MOKOMI moko na nzembo akomaki ete: “Lokola mbanzi kati na lobɔkɔ ya moto ya makasi, ezali bongo mpo na bana mibali na ntango ya bolenge.” (Nzembo 127:4, NW) Mbanzi ezwaka eloko oyo babwakeli yango bobele mpamba te. Esengeli kotyama alima mpenza na eloko yango. Bobele bongo, bana bakoki te kokóma mikóló oyo babongi na kokokisa mikumba soki bazwi litambwisi ya baboti te. Biblia elendisi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ata ntango akokóma mobange, akolongwa na nzela yango te.”​—Masese 22:6, NW.

Mbongwana oyo esalemaka kolongwa na bomwana ntango mwana asengeli naino na baboti na ye kino akokóma mokóló oyo akómi kozwa bikateli na ye moko, ekoki kosalema pwasa te. Na yango, ntango nini baboti basengeli kobanda kobongisa bana na bango mpo ete bákóma komibɔkɔla bango moko? Ntoma Paulo akundwelaki elenge mobali Timote ete: “Longwa na bomwana na yo, osili koyeba makomi mosantu, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.” (2 Timote 3:15, NW) Kanisá naino, mama ya Timote abandaki kobongisa ye na elimo ntango azalaki naino elɛzi!

Na bongo, soki bilɛzi bazali kobongisama na elimo, ezali likambo lilongobani ete bana bábongisama noki mpo ete bákóma mikóló ya makoki, boye te? Mwango moko ya kosala bongo ezali ya koteya bango bázala bato oyo bakokoka komema mikumba, kokamata bikateli na bango moko.

Koteya bana bázala bato oyo bakokoka komema mikumba

Lolenge nini bokoki kolendisa bana na bino bázala bato oyo bakokoka komema mikumba? Jack mpe Nora, bazali baboti, balobaki na ntina na mwana na bango ya mwasi ete: “Ntango abandaki kotambola, tolakisaki ye ete amemaka basosɛti na ye to biloko ya mike na eteni ya ndako oyo azalaki kolala mpe kotya yango na esika na yango. Ayebaki mpe kotya biloko na ye ya lisano mpe babuku na ye na bisika na yango.” Yango ezali makambo mike, kasi mwana azalaki koyekola kokokisa mikumba.

Wana mwana azali kokola, mbala mosusu ezali malamu kopesa ye mikumba minene. Na yango, Abra mpe Anita bapesaki mwana na bango ya mwasi nzela ete abɔkɔla mwa mbwa ya kosakana. Elenge yango asengelaki kobatela mbwa na ye mpe kutu kosalela mbongo ya ye moko mpo na mbwa yango. Koteya bana kokokisa mikumba esɛngaka kozala na motema pɛtɛɛ. Kasi yango ezali na ntina mpe ekolisaka mayoki na bango.

Misala ya ndako ezali libaku mosusu ya koteya bana kokokisa mikumba. Baboti mosusu balingaka te ete bana na bango bápesa mabɔkɔ na misala ya ndako, bamonaka yango lokola motungisi kasi lokola lisalisi te. Basusu balingaka te ete bana na bango ‘bámona mpasi oyo bango bamonaki na bomwana.’ Yango ezali makanisi malamu te. Makomami malobi ete: “Soko oboyi kobongisa moombo na yo banda bomwana na ye, okokómisa ye moto oyo azangi botɔndi.” (Masese 29:21, NW) Na ntembe te etinda ya vɛrsɛ yango etaleli mpe bana. Ezali likambo ya mawa ntango elenge abandi kokóma mokóló mpe amimonisi ete “azangi botɔndi” mpe ete azali na makoki te ya kosala ata misala mikemike ya ndako.

Na ntango ya lisolo ya Biblia, bilenge bazalaki na momeseno ya kosala misala ya ndako. Na ndakisa, wana azalaki naino na mibu 17, elenge Yosefe asanganaki na mokumba ya kobatela bitonga ya libota. (Genese 37:2) Yango ezalaki mosala moke te, mpamba te bitonga ya tata na ye ezalaki monene. (Genese 32:13-​15) Na kotalela likambo oyo ete Yosefe akómaki mokonzi monene, ezali mpasi te mpo na kondima ete ndenge babongisaki ye na bolenge epesaki ye makoki ya kosala mosala malamu. Bobele bongo, Davidi, oyo akómaki na nsima mokonzi ya Yisalaele azwaki mokumba ya kobatela bitonga ya baboti na ye ntango azalaki naino elenge.​—1 Samwele 16:11.

Liteya nini baboti ya ntango na biso bakoki kozwa na bandakisa yango? Bópesa bana na bino misala ya ntina kati na libota. Na kopesáká ntango, na kosaláká milende, mpe na kozaláká na motema pɛtɛɛ, bokoteya bilenge kopesa mabɔkɔ na misala lokola kopɛtola ndako, kolamba, kobongisa lopango, kobongisa ndako mpe kobongisa motuka. Ya solo, yango etalelaka mingimingi mbula mpe makoki ya mwana. Kasi, na momeseno, ata bana mike bakoki ‘kosalisa tata na kobongisa motuka’ to ‘kosalisa mama na kolamba.’

Koteya bana misala ya ndako esɛngaka mpe ete baboti bápesa bana na bango likabo moko eleki motuya​—ntango na bango. Batunaki babalani mibale oyo bazalaki na bana mibale, sɛkɛlɛ na bango mpo ete babɔkɔlaki bana na bango malamu. Bayanolaki ete: “Pesá ntango, ntango, ntango!”

Kosembolama oyo etondi na bolingo

Ntango bana bazali kokokisa mikumba na bango malamu, to mpe bazali kosala mpenza milende mpo na kokokisa yango malamu, bólendisaka bango mpe bópesaka bango longonya! (Kokanisá na Matai 25:21.) Ya solo, ezalaka mpasi mpo ete bana bákokisa misala lokola mikóló. Mpe ntango bana bazwi nzela ya kozwa bikateli na bango bango moko, mbala mingi basalaka mabunga. Kasi bókeba ete bólɛmbisa bango te na maloba ya kozokisa! Atako bozali mikóló, bosalá naino mabunga te? Na bongo, mpo na nini te komonisa motema molai na mabunga ya mwana na bino? (Kokanisá na Nzembo 103:13.) Bótalela mabunga te. Bómona yango lokola eleko moko ya koyekola.

Bakomi Michael Schulman mpe Eva Mekler balobi ete: “Bana oyo basalelaka bango makambo na boboto babangaka bitumbu te soki balingi kozwa bikateli na bango moko.” Nzokande, “bana oyo bazali na baboti oyo bazangi bolingo to oyo bazalaka na matata babangaka kozwa bikateli ata na likambo ya malamu, ezala ata lisalisi, mpamba te babangaka ete baboti na bango bakoluka mabunga na likambo oyo basali, mpe bakopamela bango mingi to bakopesa bango bitumbu.” Maloba yango mayokani na likebisi oyo Biblia epesi na ntina na baboti ete: “Bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.” (Bakolose 3:21) Na bongo, ntango mwana asali milende kasi alongi te, mpo na nini te kopesa ye longonya mpo ete ameki kosala oyo ekoki na ye? Bólendisa ye asala malamu na mbala ya nsima. Bómonisa ye ete bokoli na ye ezali kosepelisa bino. Bóndimisa ye ete bolingaka ye.

Ya solo, na bantango mosusu, kosembolama ezalaka na ntina. Yango ekoki kozala bongo mingimingi na boumeli ya bambula ya bolenge, ntango bilenge basalaka milende mpo na komimonisa ete bakómi mpenza mikóló, ntango bazali koluka kondimama lokola bato oyo bazali na lotomo ya kosala makambo bango moko. Na bongo, baboti basengeli kozala na mayele mpe kotalela milende motindo wana ya koluka kokóma na lipanda, na esika ete bámona yango ntango nyonso lokola nde botomboki.

Ya solo, bilenge basalaka makambo mosusu na bopusi to mpo na ‘mposa na bolenge.’ (2 Timote 2:22) Na yango, kozanga kotya ndelo na etamboli ya elenge ekoki kobebisa ye na mayoki; akolonga te komipekisa. Biblia epesi toli ete: “Mwana mobali oyo batiki amitambwisa ye moko, akoyokisa mama na ye nsɔni.” (Masese 29:15, NW) Kasi disipilini oyo elongobani, oyo epesami na bolingo, ekopesa matomba malamu mpe ekobongisa elenge mpo na mikumba mpe makambo mosusu ntango akokóma mokóló. Biblia elendisi ete: “Ye oyo aboyi mpimbo abebisi mwana na ye; kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.” (Masese 13:24) Nzokande, bómikundola ete ntina ya disipilini ezali koteya mpe kobongisa​—kasi kopesa bitumbu te. “Mpimbo” oyo elobelami awa ezali lingenda oyo babateli ya mpate bazalaki kosalela mpo na kotambwisa bitonga na bango. (Nzembo 23:4) Ezali elembo ya litambwisi litondi na bolingo​—kasi ya matata te.

Kelasi mpo na bomoi

Litambwisi ya baboti ezali na ntina mingi mpenza ntango ekómaka ete mwana akɔta kelasi. Bótya likebi na kelasi ya mwana. Bósalisa ye apona kotánga kelasi oyo ebongi mpe azwa ekateli na ye se ye moko soki esengeli ete abakisa bakelasi minene.a

Ya solo, kelasi oyo eleki ntina ezali bongo kelasi ya mateya ya elimo. (Yisaya 54:13) Bana bakozala na mposa ya bizaleli malamu ya Nzambe mpo na kolonga mikakatano ya mokili wana bakokóma mikóló. “Makoki [na bango] ya kososola” esengeli kobongisama. (Baebele 5:14, NW) Baboti bazali na mokumba monene ya kosalisa bana na bango na likambo yango. Mabota ya Batatoli ya Yehova malendisami ete básalaka boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ elongo na bana na bango. Kolandáká ndakisa ya mama ya Timote, oyo ateyaki ye Makomami uta bomwana, bobele bongo baboti oyo bazali Batatoli bateyaka bana na bango ya mike.

Barbara, moboti oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko asalaka ete boyekoli ya Biblia ezala likambo oyo lileki kosepelisa bana na ye. “Na mpokwa ya mokolo ya boyekoli, nasalaka nyonso ete napesa bana na ngai bilei kitoko, bakisa mpe dessert oyo balingaka. Natyaka kasɛti ya Mindule ya Bokonzi na radio mpo bázala na nsai. Nsima ya kosala libondeli, toyekolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi soki likambo moko ya sikisiki ezali, nakoki kosalela buku lokola Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi.”b Engebene Barbara, koyekola Biblia esalisaka bana na ye ete “bátalelaka likanisi ya Yehova na makambo nyonso.”

Ɛɛ, likabo moko te eleki likabo ya kopesa mwana boyebi mpe bososoli ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Yango ekoki “kopesa mayele epai na elema, boyebi mpe toli epai na elenge.” (Masese 1:4) Na bongo, soki elenge azwi makoki yango, akolonga bopusi mpe mikakatano mosusu ntango akokóma mokóló.

Atako bongo, ntango bana batikaka ndako ya baboti, bomoi ya baboti ebongwanaka mingi mpenza. Lolenge oyo bakoki kolonga kofanda na ndako oyo ezali na bana te elobelami na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá masolo “Baboti​—Bozali mpe na mosala!” kati na Lamuká! ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1988, ebimeli ya Lifalanse.

b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

“Bana oyo bazali na baboti oyo bazangi bolingo to oyo bazalaka na matata babangaka kozwa bikateli ata na likambo ya malamu, ezala ata lisalisa, mpamba te babangaka ete baboti na bango bakoluka mabunga na likambo oyo basali, mpe bakopamela bango mingi to bakopesa bango bitumbu.”​—Buku Bringing Up a Moral Child, ebimisami na Michael Schulman mpe Eva Mekler

[Etanda na lokasa 6]

Baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko​—Mokakatano ya kotika bana bákende

Rebecca, moboti oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko alobi ete: “Ezalaka mpasi mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko kotika bana na bango bákende. Soki tokebi te, tokómaka kobatela bango na lolenge ya kolekisa ndelo mpe kobɔndelabɔndela bango.” Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota,c nkasa 107-108, epesi makanisi oyo mabongi:

“Ezali malamu mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko ete bákangama makasi na bana na bango, nzokande basengeli kokeba ete bandelo oyo Nzambe asilá kotya kati na baboti mpe bana elɛmbisama te. Na ndakisa, mikakatano makasi mikoki kobima soki mama oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko azali kozela ete mwana na ye ya mobali akokisa mikumba oyo misengeli na tata ya libota to soki azali kokamata mwana na ye ya mwasi lokola moninga oyo ye asengeli koyebisa ye makambo na ye ya motema, koyebisáká ye ebele ya basɛkɛlɛ na ye moko. Kosala bongo ebongi te, epesaka mpasi na makanisi, mpe mbala mosusu ebulunganisaka mwana.

“Bana basengeli komona ete ezali yo moboti nde osengeli kokokisa bamposa na bango​—kasi ezali te ete bango nde bákokisa bamposa na yo. (Kokanisá na 2 Bakolinti 12:14.) Na bantango mosusu, okoki kozala na mposa ya toli mpe ya lisungi. Luká yango epai na bankulutu baklisto to mbala mosusu epai na baklisto basi oyo bakɔmɛli, kasi te epai na bana na yo oyo bazali bilenge.​—Tito 2:3.

Ntango baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bazali kotya bandelo oyo elongobani mpe bazali na boyokani malamu elongo na bana na bango, ezalaka mpasi te mpo bátika bango bákende.

[Maloba na nse ya lokasa]

c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Bililingi na lokasa 7]

Kobongisama ya malamu ekoki kosalisa bana bákóma mikóló oyo bakoki kokokisa mikumba

[Bililingi na lokasa 8]

Boyekoli ya Biblia na libota ekoki kopesa bana mayele oyo basengeli na yango mpo na kolonga mikakatano ntango bakokóma mikóló

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto