Mpɛmbɛ ya Nzoku: Ezali na motuya nini?
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA KENYA
Na likita moko ya mikili mingi oyo lisalemaki na engumba Harare, mboka-mokonzi ya ekólo Zimbabwe, na sanza ya Yúni 1997, batindami ya mikili 138 bazwaki ekateli ete epekiseli ya mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku oyo eumelaki mbula nsambo ekoka kolɛmbisama. Na nsuka ya lisolo ya kafukafu oyo ekómaki ndongo mpenza, bapesaki nzela na bikólo misato ya Afrika ya sudi—Botswana, Namibie, mpe Zimbabwe—ete bátɛkisa mpɛmbɛ ya nzoku bobele na ekólo Japon. Batindami ya bikólo ya Afrika ya sudi basepelaki na ekateli yango, mpe babandaki koyemba nzembo. Batindami mosusu babangaki ekateli yango mpo bazalaki kobanga likama oyo ekoki kokómela nzoku ya Afrika.
TANGO Hannibal abundisaki Baloma na ekeke ya misato L.T.B., mampinga na ye masalelaki molɔngɔ ya banzoku ya Afrika oyo bakómisaki yango lokola nyama ya mboka. Na ntango wana, Afrika ezalaki na bamilio ya nzoku, oyo ezalaki kotambolatambola kobanda na Cape kino na Caire.
Makambo mabongwanaki. Mobali moko alobaki ete: “Liboso ezalaki na bato moke, nzoku ebele. Kasi sikawa ekómi na nzoku moke, bato ebele.” Lokola bato bazalaki kokóma mingi, nzoku ikómaki kozanga bazamba ya kofanda. Likambo mosusu oyo ekitisi motángo ya nzoku ezali ete mokili mokauká ya Sahara ezali kokóma monene na epai ya sudi.
Nzokande, ntina mpenzampenza oyo bazali kosilisa nzoku ezali bongo bosɛnga ya mpɛmbɛ na yango. Na bokeseni na mokuwa ya tigre mpe liseke ya kanga (rhinocéros), mpɛmbɛ ya nzoku basalelaka yango na nkisi ya bikelakela te. Kasi, ezali eloko ya motuya, ya kitoko, eumelaka mpe ezalaka mpasi te mpo na kopalola yango. Uta ntango ya kala, biloko oyo bisalemi na mpɛmbɛ ya nzoku bitalelamaka lokola biloko ya motuya mpe oyo bato balingaka.
Mbula nkama minei nsima ya Hannibal, Baloma babomaki nzoku mingi na nɔrdi ya Afrika mpo na koteka mpɛmbɛ na yango. Mombongo yango epanzani kino lelo oyo, mingimingi na mikili ya Mpoto. Na ebandeli ya ekeke oyo, bosɛnga ya mpɛmbɛ ya nzoku ekómaki makasi—bobele mpo na kosala na yango biloko ya kokembisa mpe biloko ya losambo lokola ezalaki liboso te, kasi mpe mpo na kosala bitanda ya piano. Engebene buku Battle for the Elephants (Etumba mpo na kobatela banzoku), bobele na mobu 1910, tɔni soko 700 ya mpɛmbɛ ya nzoku (elingi koloba nzoku 13 000 oyo ibomamaki) esalelamaki mpo na kosala bitanda ya piano 350 000 na États-Unis.
Moyibi ya mpɛmbɛ ya nzoku
Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bosɛnga ya mpɛmbɛ ya nzoku ezalaki mingi te, mibeko ya sika mitali kobatela banyama mibimaki, mpe nzoku ibandaki kokóma mingi. Nzokande, na ebandeli ya bambula ya 1970, babandaki lisusu koboma nzoku mingi. Sikawa bosɛnga ya mpɛmbɛ ya nzoku ezali kouta mingi mpenza na mikili ya Azia oyo mikómi na bozwi.
Mbala oyo, ezali na makambo mibale oyo esali ete bato báboma nzoku mingi na Afrika. Ya liboso ezali mandoki ya pɛpɛlɛ mpe ya makasi. Ezalaki lisusu likambo ya koboma nzoku moko na moko te, kasi etonga mobimba na mbala moko. Ya mibale, mosala ya kopalola mpɛmbɛ ya nzoku ekómaki kosalema na bisaleli ya lotiliki oyo bikómisaki mosala yango pɛtɛɛ mpo na kobongola mbala moko mpɛmbɛ ya nzoku na biloko oyo bibongi na kotɛkama. Na ntango ya kala, mosáli ya mpɛmbɛ ya nzoku na Japon akokaki kolekisa mbula mobimba mpo na kopalola lino moko ya nzoku. Nzokande, na bisaleli ya lotiliki, bobele na pɔsɔ moko mpamba, bato mwambe oyo basalaka babiju mpe hanko (nkombo ya batampɔ oyo eyebani mingi na Japon) bakoki kosilisa kopalola mpɛmbɛ ya nzoku 300. Bosɛnga mingi ya mpɛmbɛ ya nzoku ezali kokolisa ntalo na yango. Ya solo, babomi-nzoku na lolenge ya moyibi bazwaka mbongo mingi te, kasi baoyo basombaka epai na bango mpe batɛkiselaka bato mosusu nde bazwaka mbongo mingi, mpe mingi kati na bango bakómaka na bozwi mingi mpenza.
Nzoku ibomamaki mingi mpenza. Na boumeli ya mbula soko ntuku mibale, nzoku 80 likoló na monkama ibomamaki na ekólo Tanzanie, mingi mpo na babomi-nzoku na lolenge ya moyibi. Na ekólo Kenya, nzoku 85 likoló na monkama ibomamaki. Na ekólo Ouganda, nzoku 95 likoló na monkama ibomamaki. Libosoliboso, babomi-nzoku na lolenge ya moyibi babomaka nzoku ya mibali, mpamba te yango izalaka na mino ya minene koleka. Kasi lokola nzoku ya minene izali lisusu mingi te, babomi-nzoku bakómi koboma ata bana ya nzoku mpo na kozwa mpɛmbɛ na yango oyo ezali naino pɛtɛpɛtɛɛ. Na boumeli ya ntango yango, nzoku koleka milio moko ibomamaki mpo na kozwa mpɛmbɛ na yango, yango ekitisi motángo ya nzoku ya Afrika kino na 625 000.
Epekiseli ya koboma nzoku na mokili mobimba
Milende oyo misalemaki mpo na kosɛnzɛla mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku mpe kopekisa koboma nzoku, milongaki te. Nsukansuka, na Ɔkɔtɔ́bɛ 1989, na likita moko esalemaki na Suisse, ebongiseli ebéngami Convention sur le commerce international des espèces menacées (CITES) epekisaki mombongo nyonso ya mpɛmbɛ ya nzoku kati na basangani na yango. Bapesaki mbongo mingi oyo esengelaki kosalelama mpo na kobatela nzoku kati na zamba.
Basusu balobaki ete kopekisa mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku ekomatisa ntalo na yango wana ekotɛkisama na kobombama mpe babomi-nzoku na lolenge ya moyibi bakokóma mingi. Emonanaki bongo te. Ntalo ekitaki makasi mpenza, mpe bazando oyo kala ezalaki kotɛkisa yango mingi ekaukaki. Na ndakisa, na ekólo Inde, botɛkisi mpɛmbɛ ya nzoku mokomoko na kobombama ekitaki na 85 %, mpe basáli ya mpɛmbɛ ya nzoku na ekólo yango basengelaki koluka misala mosusu. Liboso ya epekiseli yango, na ekolo Kenya, babomi-nzoku na lolenge ya moyibi bazalaki koboma nzoku soko 2 000 na mbula. Na mobu 1995, motángo ekitaki kino na 35. Lisusu, motángo ya nzoku ya Kenya ebakisami kolongwa 19 000 na 1989 kino 26 000 lelo oyo.
Mpo na bantina yango, ebongiseli moko mpo na kobatela biloko bizalisami (Environmental Investigation Agency), oyo biro na yango ezali na Londres ekumisaki epekiseli ya mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku ete ezali “moko ya bolongi monene kati na lisolo ya kobatela nzoku.” Nzokande, bato nyonso basepelaki na maloba yango te, mingimingi na mikili ya Afrika ya Sudi.
Nzoku na mikili ya Afrika ya Sudi
Mikili ya Afrika ya Sudi ezali na nzoku koleka 200 000, to pene na nzoku moko kati na nzoku misato (1/3) ya nzoku nyonso ya Afrika mobimba. Yango euti na myango makasi oyo mityami mpo na kobatela nzoku mpe mpo ete makambo oyo mazali kosalema na mikili yango mapesi nzela te lokola na mikili ya Afrika ya Ɛsti mpe Afrika ya Ntei, epai kuna basoda batomboki bazali kosilisa nzoku.
Nzokande, lokola nzoku ikómi mingi, mbala mingi matata mazali kobima kati na nzoku mpe bato oyo bafandi na bamboka ya zamba. Soki nzoku ya monene ezali na nzala makasi, ekoki kolya kilo 300 ya matiti na mokolo moko. Soki nzoku ezali nzinganzinga na esika oyo ofandi, oyebi likambo yango malamu mpenza.
Ebongiseli ebengami Africa Resources Trust, oyo ezali na ekólo Zimbabwe, elobi ete: “Bato mingi na Afrika oyo bafandi na bamboka ya zamba babangaka nzoku, mpe balingaka yango te. Na boumeli ya mwa bangonga, nzoku ikoki kobebisa bilanga na bango to koboma bitonga na bango. Nzoku ibebisaka bandako mpe biteyelo, ibomaka bitonga, ibebisaka banzete oyo ebotaka mbuma mpo na kolya, ibebisaka bipáka na mai (digues) mpe mabelé. Mokolo na mokolo bazulunalo ya mboka elobelaka biloko oyo bibebisami na nzoku.”
Mikili ya Afrika ya Sudi mizali kosepela mingi na lolenge yango elongi mpo na kobatela nzoku. Kasi kobatela nzoku esɛngaka mbongo mingi, mpe bandimi te ete basengeli komona mpasi mpo na bolɛmbu ya mikili mosusu ya Afrika. Bakanisi ete mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku oyo endimami ekoki kopesa mbongo oyo ekosalelama mpo na kobatela nzoku mpe mpo na kofuta bato oyo biloko na bango bibebisamaki na nzoku.
Mpɛmbɛ ya nzoku oyo babombi
Na mikili oyo nzoku izali mingi mpenza, mpɛmbɛ na yango izali mingi. Mpɛmbɛ yango izali kouta na nzoku oyo bakonzi bapesaki mitindo ete báboma yango mpo na kokitisa motángo na yango, to na nzoku oyo ikufi yango moko, to oyo Leta abotolaki na bayibi. Mpɛmbɛ yango basalaka na yango nini?
Ekólo Kenya etumbaka mpɛmbɛ yango. Kobanda Yulí 1989, na miso ya bato nyonso, ekólo Kenya etumbaki mpɛmbɛ ya nzoku oyo ezalaki na motuya ya bamilio ya badolare, kozanga ete ezwa mbongo mosusu mpo na yango. Na 1992, ekólo Zambie etumbaki mpe mpɛmbɛ na yango oyo ebombaki. Likambo ya ntina mpo na yango ezalaki polele: ekólo Kenya mpe ekólo Zambie baboyi kosala mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku.
Mikili mosusu babombi mpɛmbɛ ya nzoku na bango lokola bozwi mpo na mikolo mizali koya. Ebongiseli ebéngami TRAFFIC, oyo eleki bonene na mokili mobimba mpo na kobatela nyama ya zamba ekanisi ete mpɛmbɛ ya nzoku nyonso oyo babombi na mikili ya Afrika ekoki kozala tɔni 462, oyo ekoki kopesa milio 46 ya badolare. Bikólo lokola Botswana, Namibie mpe Zimbabwe, oyo bapesameli sikawa nzela ya kosala mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku na ekólo Japon, ezali na tɔni 120 ya mpɛmbɛ ya nzoku. Na bongo, bato mingi bazali kotuna, ‘Na bisika oyo bato bazali komona mpasi na makambo ya nkita, mpo na nini kotika mpɛmbɛ ya nzoku izali kobeba kati na bibombelo? Mpo na nini te kotɛkisa yango mpe kotinda mbongo na bibongiseli ya kobatela nzoku?’
Kobanga ezali naino
Na ntango mikili mosusu ya Afrika mizali kokanisa ete kolɛmbisa epekiseli ya kotɛka mpɛmbɛ ya nzoku ezali kobatela, bikólo mosusu bizali kokanisa ete, kopekisa ete ata nzoku moko ebomama te ezali meko bobele moko mpo na kobatela nzoku malamu. Bazali komibanzabanza mpo na koyeba soki mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku esɛnzɛlami malamu. Kopekisa mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku ezali kopesa nzela ya kosala mombongo yango na molili. Lisusu, ezali boni mpo na mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku oyo ezali kosalema na lolenge mabe? Kolongola epekiseli yango elingi koloba ete nzoku ikobomama mpe mpɛmbɛ na yango ikobombama na baoyo bazali kolikya ete epekiseli ekoki kolongolama na mikolo mizali koya?
Longola bobangi yango, ezali lisusu na likambo oyo ete mandoki matondi mingi koleka na Afrika. Bitumba ya bana mboka etondisi mandoki na mabɔkɔ ya bato oyo bazali na mikakatano ya nkita, mpe balingi kosalela yango mpo na koluka mbongo. Nehemiah Rotich, mokambi ya East African Wildlife Society, akomaki ete: “Lokola mpɛmbɛ ya nzoku ekómi kopesa mosolo mingi [mpo na mombongo na yango oyo ezongi lisusu], ntembe ezali te ete mandoki yango makosalelama mpo na koboma nzoku—mpamba te ezali likambo ya pɛtɛɛ koboma nzoku na kati ya parke ya monene koleka koyiba mosolo na banki kati na engumba.”
Mokakatano mosusu ezali ete meko oyo izwami mpo na kopekisa koboma nzoku ezali bobele kosɛnga mbongo mingi te kasi ezali mpe mpasi mpo na kosalela yango. Kosɛnzɛla bitando ya minene bisika nzoku ifandaka esɛngaka mbongo mingi mpenza. Na Afrika ya Ɛsti, ezali mpasi mpo na kozwa mbongo yango.
Elikya nini ezali mpo na nzoku na mikolo mizali koya?
Mbuma mabe ya ekateli ya kolɛmbisa epekiseli ya mombongo ya mpɛmbɛ ya nzoku ezali komonana. Kasi, ata soki makambo mabongi, likama ya kosilisama ya nzoku ekosila te. Nzoku izali lisusu na likama mpamba te bato bazali kokóma mingi mpe bazali na mposa ya bazamba mpo na kolona bilanga mpe mpo na kosala misala mosusu. Bobele na Afrika ya Sudi, bato bazali kokata bazamba, mingimingi mpo na kolona, koleka hɛktarɛ 850 000 mbula na mbula—etando oyo ekokani na ndambo moko likoló na mibale (1/2) ya etando ya ekólo Israël. Lokola bato bazali kokóma mingi, bisika nzoku izalaka bisengeli kokóma mpenza moke.
Zulunalo World Watch elobi ete: “Ezali na likambo moko oyo moto nyonso oyo asili kososola likama yango asengeli kondima: nzoku ya Afrika izali na mokakatano mpo na mikolo mizali koya. Bozangi ya bisika ya kofanda [oyo euti na koikana ya bato] ezali komonisa ete nzoku mingi ikokufa mobesu, na lolenge moko to mosusu. Soki nzoku ibomami te na bato oyo bapesameli nzela to oyo bazwi ndingisa ya kokitisa motángo na yango—to ibomami te na babomi-nzoku na lolenge ya moyibi—mingi ikokufa mpo na nzala mpe motángo na yango ekokita.”
Likambo yango ya mawa oyo litaleli nzoku na mikolo mizali koya ezali na boyokani ata na makanisi to na mokano ya Mozalisi ya nzoku te, Yehova Nzambe. Lobanzo ya Nzambe mpo na bikelamu na ye emonani polele na maloba ya Yesu oyo alobaki ete: “Bandɛkɛ mike mitano batɛkami na [meya] mibale te? Mpe moko na bango abosanami na liboso na Nzambe te.” (Luka 12:6) Soki Nzambe abosanaka ata mwa ndɛkɛ ya moke te, tosengeli kondimisama ete abosanaka mpe nzoku te.
[Etanda na lokasa 14]
Maloba na ntina na mpɛmbɛ ya nzoku
“Na ntembe te mpɛmbɛ ya nzoku ezali eloko kitoko. Engɛngaka mpe epesaka molunge oyo eloko mosusu te oyo esalelami mpo na kokembisa ezali na yango. Kasi nakanisi ete bato babosanaka ete mpɛmbɛ ya nzoku ezali nde lino na ye. Liloba mpɛmbɛ epesaka likanisi te ete yango eutaka na nzoku. Ekoki kotalelama lolenge moko na libanga lokola jade, mpe nzete lokola wenge, ébène, to ambre, ata mpe lokola wolo to motako (cuivre). Nzokande, bokeseni ezali monene: biloko mosusu wana eutaka na nyama te; mpɛmbɛ ya nzoku ezali lino ya nzoku oyo ebimi libanda. Soki moto moko alati ekɔmɔ kitoko ya mpɛmbɛ ya nzoku to eloko mosusu oyo esalemi na yango, mbala mingi tobosanaka ete eloko yango euti na nzoku oyo ezalaki kotambola nzinganzinga na biso kosaleláká mino na yango mpo na kolya, kotimola mabelé, kosakana mpe kobunda, mpe lisusu ete nzoku yango esengelaki kobomama bobele mpo na kozwa mpɛmbɛ na yango oyo basali na yango eloko oyo tolati na lobɔkɔ.”—Buku Elephant Memories, ekomami na Cynthia Moss.
[Etanda na lokasa 17]
Maloba na ntina na nzoku
Nzoku izalaka na nguya mingi, mpe ntango izali na nkanda, ikoki koningisa mabelé. Nzoku ekoki kokanga yo na boembo na yango mpe kobwaka yo lokola libanga. Nzokande, nzoku ekoki mpe kosakanisa yo na boembo na yango to mpe ekoki kozwa bilei na boboto nyonso na lobɔkɔ na yo. Nzoku izalaka na mayele mpe ilingaka lisano. Izalaka na boboto mingi isalisanaka wana moko na yango ezoki to ezali na bokɔnɔ, mpe itungisamaka mingi soki moko na yango ekufi. Atako batyaka likebi te na mikuwa ya nyama mosusu oyo ekufá, bayebaka mikuwa ya moninga na bango mpe bapanzaka yango to bakundaka yango.
[Bililingi na lokasa 16]
Bikólo mibale bitumbaki mpɛmbɛ na yango; mikili mosusu mibombi oyo ya bango lokola bozwi ya mikolo mizali koya