Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet lok. 18
  • Mai mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mai mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo
  • Lamuká!—1998
  • Masolo mosusu
  • Mai ezali na ntina mingi mpo na bomoi
    Lamuká!—2004
  • Mai oyo ezali kopesa bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mai ya pɛto
    Lamuká!—2023
Lamuká!—1998
g98 Juillet lok. 18

Mai mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo

ZULUNALO Health elobi ete: “Okotalela bobele mposa te mpo na koyeba soki okomɛla mai mingi to moke.” Nzokande, komɛla mai mingi ezali na ntina mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, ya mayoki, ata mpe mpo na kitoko na biso. Mai ya nzoto na biso ekitaka mingimingi na motoki, na mpisoli, na masuba mpe na kopema. Esengeli kozongisa mai mosusu. Esengeli komɛla kɔpɔ ya mai boni? Minganga mingi bazali kosɛnga komɛla kɔpɔ soko mwambe​—mokolo na mokolo.

Mpo na nini esengeli komɛla mai mingi boye? Mai ezali na ntina mpo na komema biloko ya koleisa nzoto na binama ya nzoto mpe mpo na kobimisa bosɔtɔ. Mai ezali na ntina mpo na kosala ete nzoto na biso ezala ntango nyonso na molunge molongobani mpe mpo na koninola matonga. Zulunalo Health elobi ete: “Ata bozangi moke ya mai na nzoto ekoki kolɛmbisa nzoto na yo . . . to kobɛlisa yo. Kozanga mai na nzoto mbala mingi ezali ntina ya kolɛmba oyo bato bayebaka malamu te.” Zulunalo yango epesaki etinda ete: “Komikosa te na komɛláká kafe, tii, masanga ya sukali mpe masanga mosusu na kokanisáká ete yango ekoki kopesa yo mai na nzoto. Kutu yango esalaka ete mai esila na nzoto.” Kafe mpe masanga epesaka masuba mingi mpe esalaka ete mai ekita mingi na nzoto.

Lisusu, “lomposo ya nzoto na yo esengeli na mai mpo ete ezalaka sɛmbɛsɛmbɛ mpe kitoko.” Mpo na yango, ekoki mpe kopakola mafuta. Kasi yango ebakisaka mai na nzoto te. Kutu ebatelaka bobele ndambo ya mai oyo ezalaki na nzoto liboso. Kobatela mai yango ekómaka na ntina mingi koleka wana tozali kokola, mpamba te lomposo ya nzoto na biso ebungisaka makoki na yango ya kobatela mai ntango tozali kokóma mibange.

Likambo ya mawa, na bisika mingi na mokili, esengeli naino kosala milende mpo na kozwa mai ya pɛto, mai oyo mabongi na komɛla. Kasi mai yango ezali mpenza na ntina. Na bongo, mɛlaká mai mingi, mpe salelá ebongiseli ya pɛtɛɛ oyo ezali na matomba mingi mpo na kozala na lomposo kitoko mpe omiyokaka malamu!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto