Elikya nini ezali mpo na basi na mikolo mizali koya?
“LISOLO ya bato esili komonisa ete mibali bazali kokonza mpe konyokola basi.” Maloba yango ekoki kotángama na mokanda Komonisama ya mayoki (na Lingelesi), oyo ekomamaki esili koleka mibu 150 na mboka Seneca Falls, na New York, mpo na kotɛmɛla makambo oyo mibali bazali kosalela basi na kozanga bosembo.
Kobanda ntango wana, makambo mabongaki, kasi lokola lapolo moko ya Mabota Masangani oyo ezwami kati na mokanda Basi kati na mokili na mobu 1995 elobi yango, ezali naino na makambo mingi ya kobongisa. Lapolo yango elobi ete: “Mbala mingi, mibali mpe basi bazalaka na bomoi lolenge moko te mpamba te bazalaka na makoki ndenge moko te na makambo matali kelasi, kozwa mosala, bokolɔngɔnɔ ya nzoto, libateli mpe kominanola.”
Lokola bikólo mingi bikómi komibanzabanza mpo na likambo yango, yango wana babimisi mibeko oyo ezali kobatela ntomo ya basi. Kasi, mibeko ekoki kobongola mitema te, esika oyo misisa ya kozanga bosembo mpe kokanisela basusu mabe eutaka. Na ndakisa, likambo litali bondumba ya bana basi. Mpo na yango, zulunalo Newsweek elobaki ete: “Mibeko oyo ezali kopekisa kosalela bana na makambo matali kosangisa nzoto ezali malamu, kasi mbala mingi ebimisaka matomba te.” Bobele bongo, mobeko yango moko ekoki kopekisa mobulu te. Mokanda Lapolo ya bokoli ya makambo ya bato na mobu 1995 (na Lingelesi) elobi ete: “Monyoko oyo basi bazali kozwa ezali mokakatano oyo epalangani bipai binso. Mibeko mingi ezali na likoki te ya kopekisa mobulu yango—loba soki mimeseno ya bato ebongwani.”—Biso nde totɛngisi makomi.
Mingimingi “mimeseno ya bato” etongamaka likoló na makambo ya bonkɔkɔ—oyo ezalaka mpasi mpo na kobongola yango. Mwasi moko na Moyen-Orient alobaki ete: “Makambo ya bonkɔkɔ esalaka ete mibali bákanisa ete basengeli komona basi na bango lokola baombo na esika ete bálinga bango, basengeli kobuba bango na esika ete bábatela bango. Na yango, mwasi azali na likoki ya kobimisa likanisi na ye te, azali na lotomo moko te, mpe azali na likoki mpenza te ya kobongisa bomoi na ye.”
Koteya mibali mpe batata
Na 1995, mokanda moko ekomamaki na ntango basalaki likita ya mokili mobimba mpo na basi, na engumba Pékin, na ekólo Chine, elobaki ete “mpo ete mokili mobimba ekóma na kimya, na bosembo mpe na bizaleli ya bomoto, epai kuna basi bakopesamela limemya, esengeli ete bato básala likambo moko na lombangu.”
Likambo nyonso oyo ekoki kopesa basi ‘kimya, kotalela bango na bosembo, mpe kopesa bango limemya ya bomoto na bango’ esengeli kobanda na ndako, epai ya mibali mpe batata. Na ntina yango, Batatoli ya Yehova bamindimisi ete mateya ya Biblia mazali mpenza fungola mpo na kolonga mokakatano yango. Basili komona ete ntango mibali bakómi koyeba ete Nzambe azali kosɛnga na bango ete básalelaka basi na bango mpe bana na bango makambo na limemya, bazwaka likambo yango na motuya.
Pedro, mobali oyo afandaka na Afrika ya Ntei mpe azali na bana minei, azali sikawa komibanzabanza mpo na bamposa ya mwasi na ye. Asalisaka mwasi na ye na kotaláká bana, mpe kutu apesaka ye mabɔkɔ na mosala ya kolamba ntango libota eyambaka bapaya. Na mboka oyo afandi, ezaleli ya komikitisa ndenge wana emonanaka mpenza te. Nini esali ete apesaka mwasi na ye lokumu mpe asalaka na ye elongo?
Pedro alobi ete: “Ntango nabandaki koyekola Biblia, bateyaki ngai mitinda mibale ya ntina oyo mitali mokumba ya mobali. Mitinda yango esalaki bopusi makasi likoló na lolenge nazalaki kotalela mwasi na ngai. Motinda ya liboso oyo ezwami na 1 Petelo 3:7, ezali komonisa ete mobali asengeli kopesa mwasi na ye lokumu lokola ‘mbɛki ya motau.’ Motinda ya mibale oyo ezwami na Baefese 5:28, 29, elobi ete mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo ‘lokola nzoto na ye mpenza.’ Uta nabandi kosalela mitinda yango, ngai na mwasi na ngai tokómi na boyokani makasi. Na bongo, biso mibali tosengeli kokangama na toli ya Nzambe na esika ete tókangama na makambo ya bonkɔkɔ.”
Michael, oyo afandi na Afrika ya Wɛsti, alobi ete liboso ete abanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, azalaki kosalela mwasi na ye makambo na boboto te. Ayamboli ete: “Nazalaki kobɛta ye soki nasiliki. Kasi Biblia eteyi ngai ete nasengeli kobongola bizaleli na ngai. Sikawa nasalaka makasi mpo na komipekisa mpe kolinga mwasi na ngai lokola nzoto na ngai mpenza. Mpe tozali na esengo.” (Bakolose 3:9, 10, 19) Mwasi na ye Comfort andimi ete: “Sikawa Michael apesaka ngai limemya mpe amoniselaka ngai boboto koleka mibali mosusu. Tosololaka na ntina na mikakatano na biso mpe tosilisaka yango na bomoko.”
Pedro mpe Michael bayekoli kopesa basi na bango limemya mpe kolinga bango, mpamba te bazali kosalela mitinda oyo euti na Liloba ya Nzambe; oyo ezali komonisa polele ete kosalela basi makambo na kozanga bosembo ezali likambo oyo esepelisaka Mozalisi soko moke te.
Nzambe amibanzabanzaka mpo na basi
Nzambe azali ntango nyonso komibanzabanza mpo na basi mpe mpo na bolamu na bango. Atako alobaki na baboti na biso ya liboso ete mpo na botɔmbɔki na bango, ezaleli ya kozanga kokoka ekosala ete mibali ‘bákonza’ basi, likambo yango ezalaki mokano na ye te. (Genese 3:16) Asalaki Eva mpo ete azala “mosungi” ya Adama mpe moninga na ye. (Genese 2:18) Kati na Mibeko ya Mose, oyo Yehova apesaki Yisalaele ya kala, apekisaki konyokola basi bakufeli-mibali mpe apesaki etinda na Bayisalaele ete bámonisela bango boboto mpe básalisa bango.—Exode 22:22; Deteronome 14:28, 29; 24:17-22.
Yesu azalaki komekola Tata na ye, azalaki kolanda makambo ya bonkɔkɔ ya ntango na ye te, yango ezalaki kotyola basi. Azalaki koloba na basi na boboto nyonso—ata na baoyo bayebanaki ete bazalaki na etamboli mabe. (Luka 7:44-50) Lisusu, Yesu asepelaki kosalisa basi oyo nzoto na bango ezalaki kolɔngɔnɔ te. (Luka 8:43-48) Mokolo moko, ntango amonaki mwasi mokufeli-mobali azali kolela mwana na ye ya mobali se moko oyo akufaki, na mbala moko alandaki bato oyo bazalaki kokende kokunda mwana yango mpe asekwisaki ye.—Luka 7:11-15.
Kati na bayekoli ya liboso ya Yesu, basi mpe bazalaki. Kutu basusu bazalaki bato ya liboso oyo bamonaki ye ntango asekwaki. Biblia ezali kokumisa basi lokola Ludia, Doloka, Pilisikia, oyo bazalaki ndakisa mpo na bizaleli ya boyambi bapaya, motema mawa mpe mpiko. (Misala 9:36-41; 16:14, 15; Baloma 16:3, 4) Mpe baklisto ya liboso bayekolaki likambo etali kopesa basi limemya. Ntoma Paulo apesaki Timote, moninga na ye ya mosala ya misionere etinda ete atalelaka “mibange basi lokola bamama mpe bilenge basi lokola bandeko basi na pɛto nyonso.”—1 Timote 5:2.
Basi oyo bapesamelaki limemya
Soki ozali mobali moklisto, osengeli komonisa limemya motindo wana epai na basi. Komeka kolanda soko moke te makambo ya bonkɔkɔ mpo na konyokola basi. Lisusu, komonisa limemya epai na basi ekoki kopesa litatoli monene na ntina na kondima na yo. (Matai 5:16) Salima, elenge mwasi oyo afandi na Afrika, alobi lolenge azwi matomba mauti na kotosa mitinda ya boklisto.
“Nakoli na mboka oyo banyokolaka basi mpe bana basi. Mama na ngai azalaki kosala mosala na boumeli ya ngonga 16 na mokolo, kasi soki mosala moko etikali mpe akoki kosala yango te, tata azalaki kofinga ye. Likambo ya mawa koleka, soki tata alangwi masanga, azalaki kobɛta mama. Basi mosusu na mboka na biso bazalaki kozwa minyoko motindo wana. Kasi nayebaki ete bizalela motindo wana ezali mabe—yango ezalaki kobangisa biso mpe koyokisa biso mawa. Atako bongo, namonaki ete likambo moko ya kosala ezalaki te mpo na kobongola ezaleli yango.
“Nzokande, ntango nazalaki elenge, nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nakamwaki mingi ntango natángaki maloba ya ntoma Petelo, oyo emonisaki ete esengeli kokumisa basi. Kasi nakanisaki ete, ‘Ekokamwisa ngai soki bato batosi toli oyo, mingimingi na kotalela makambo ya bonkɔkɔ ya mboka na biso.’
“Nzokande, ntango nakendaki na Ndako ya Bokonzi, esika oyo Batatoli ya Yehova bayanganaka, basi na mibali bazalaki kosolola na ngai na boboto mpenza. Kutu likambo oyo ekamwisaki ngai mingi koleka, ezalaki ete mibali bazalaki mpenza komibanzanbanza mpo na basi na bango. Ntango nabandaki koyeba bato yango malamu, namonaki ete yango ezali likambo oyo Batatoli ya Yehova nyonso basengeli kosala. Atako mibali mosusu bautaki na bisika oyo ezali na mimeseno lokola oyo ya ngai, kasi bazali sikawa komonisa limemya epai na basi. Nasepeli kokóma moko ya bato ya libota yango monene.”
Lolenge ya kosilisa likambo yango mpo na libela
Limemya oyo Salima amonaki ezalaki likambo ya pwasa te. Ezalaki matomba ya mateya mauti na Liloba ya Nzambe, oyo mazali kosalisa bato ete bápesana limemya lokola Nzambe asalaka yango. Yango ezali komonisa lolenge makambo makoki kosalema sikawa mpe lolenge yango ekosalema bipai binso ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé mobimba. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Boyangeli yango ya likoló ekolongola kozanga bosembo nyonso. Biblia ezali kondimisa biso ete: “Wana kosambisa na yo [Yehova] ekozala na mokili, bafandi na molɔ́ngɔ́ bakoyekola boyengebene.”—Yisaya 26:9.
Ata sikawa, mateya ya boyengebene mazali kobongola makanisi ya bamilio ya bato. Ntango bato nyonso bakokóma na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, mateya yango makokoba kopesama bipai binso mpe monyoko oyo basi bazali kozwa epai na mibali mpo na mbeba ya lisumu ya Adama ekosila. Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponi, akopesa nzela te ete basi bányokwama kati na boyangeli na ye. Kolobeláká boyangeli yango ya Klisto, Biblia elobi ete: “Akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.”—Nzembo 72:12-14.
Masolo oyo malobeli mingi mikakatano ya basi. Nzokande, esengeli mpe koyeba ete mibali mingi bazali mpe konyokwama. Na boumeli ya lisolo ya bato, mibali mpe basi banyokwami na mabɔkɔ ya bato ya nguya. Basi mosusu mpe banyokoli mibali. Na ndakisa, Biblia ezali kolobela makila ya bato oyo basalaki likambo te kasi babomamaki na basi mabe lokola Yesabele, Atalia mpe Elodia.—1 Mikonzi 18:4, 13; 2 Ntango 22:10-12; Matai 14:1-11.
Na yango, bato nyonso bazali mpenza na mposa ya mokili ya sika oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe. Mosika te, ntango mokolo yango ekoya, bakosalela mobali moko te to mwasi moko te makambo na kozanga bosembo mpe moto moko te akonyokwama. Mokolo na mokolo ekozala ‘esengo’ mpo na moto nyonso.—Nzembo 37:11.
[Elilingi na lokasa 13]
Mibali baklisto balandaka mitinda ya Biblia, bamemyaka mpe bakumisaka basi na bango