Lyáká ndunda!
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA BRÉSIL
“Ezali bololo.” “Ezali kitoko te.” “Nalyaka yango te.”
OYO ezali kaka mwa bantina oyo bato mingi baboyaka kolya ndunda. Ezali mpe bongo mpo na yo? Olyaka ndunda mokolo na mokolo? Tolukaki koyeba mpo na nini bato mosusu balyaka ndunda mpe bato mosusu balingaka kolya yango te.
Baoyo balyaka ndunda balobaki ete baboti na bango bamonisaki bango ntina ya kolya ndunda, madesu mpe mbuma. Mpo na baoyo balingaka kolya ndunda te, bamesanaki kolya yango te ntango bazalaki bana. Yango wana, basepelaka na biloko ya sukali, kasi oyo etongaka nzoto te. Kasi atako bongo, bato yango mpe bandimi ete mpo na kozala na nzoto kolɔngɔnɔ, esengeli kolyaka ndunda.
Baboti, bólakisa bana na bino kolya ndunda! Ndenge nini? Mwa buku Koyeba mpo na kobika (na Lingelesi), oyo ebimisami na UNICEF, epesi toli ete ntango mwana akokisi sanza motoba, esengeli kopesaka ye ndunda ya pɔtɔpɔtɔ, mbuma oyo balongoli mposo, baniki yango mpe batɔkisi yango, ata mbala moko na mokolo nsima ya kopesa ye mabɛlɛ to bibɛrɔ. Ekozala malamu mingi koleka kopesa mwana biloko ya ndenge na ndenge. Monganga Vagner Lapate, moto ya Brésil, oyo asalisaka maladi ya bana alobaki ete, atako miliki ezali bilei ya ntina mingi mpo na mbula mibale ya liboso ya mwana, kobanda kopesa ye biloko mosusu “esalisaka mwana ete ameka mpe elɛngi ya biloko ya sika.”
Na kati ya mokanda Medicina—Mitos y Verdades (Misala ya monganga: Masapo mpe makambo ya solo), Carla Leonel apesi toli ete, kolekisa ntango te, esengeli kopesa mwana biloko mosusu lokola mwa mai ya lilala, bambuma baniká (na ndakisa bitabe, pɔme, mpe paipai), masangu, loso, sorgho, blé, bakoki kopesa ye mpe mwa supu ya ndunda. Ya solo, lokola makanisi na ntina na koyeba ntango nini kobanda kopesa mwana biloko yango ezali ndenge na ndenge, ekozala malamu kotuna monganga oyo asalisaka mwana na yo.