Makambo mazali koleka na mokili
Kobikisa bana mike
Mbula na mbula, bana mike milio minei bakufaka naino bakokisi sanza moko te banda kobotama na bango. Zulunalo moko ya Allemagne (Bild der Wissenschaft) elobi ete “bana mike oyo bakufaka naino bakokisi mbula mitano te, mwa mingi na bango (40 %) bakufaka naino bakokisi sanza moko te.” Esengeli kosala nini mpo na kobikisa bana oyo babotami sika? Lapolo moko oyo ezali na motó ya likambo ete “Ezalela ya bana oyo babotami sika,” emonisaki ete kobatela bana mpo bázala na molunge mpe komɛlisa bango mabɛlɛ mbala moko nsima ya kobotama ezali lolenge malamu ya kobatela bango na bamaladi. Mpo na kobikisa bana ete bákufa te, esengeli kobatela bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bamama ntango bazali na zemi, oyo mingi na bango bamipesaka na misala ya makasimakasi mpe balyaka malamu te, mpe baumelaka te kozwa zemi mosusu. “Na mikili ya bobola, epai bana mingi (98 %) oyo babotami sika bakufaka,” esengeli kolakisa basi ndenge ya kobotisa. Lapolo yango elobi ete, “mosala ya basi yango ya libosoliboso ekozala ya kopesaka basi ya zemi malako, kotalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, mpe kokatisa bango mangwele.”
Kolimwa ya miinda na bokula ya mbu
Zulunalo moko (Financial Post) elobi ete: “Kaka ndenge ampulɛ ekitaná buji, ndenge moko mpe miinda oyo epelaka yango moko ekitani moto oyo azalaki kokɛngɛla miinda na molende nyonso. Kutu, lelo oyo emonani ete etikali moke miinda yango mpe elimwa.” Atako miinda oyo epelaka yango moko epesaka kongɛnga na yango makasi kino kilomɛtrɛ koleka 32 na kati ya mbu mpe ebɛtaka loseba na ntango ya londende mpo na kokebisa bato ya masuwa ete bakómi pene na bokula, kaka basatɛlitɛ nde esalisaka bango báyeba mpenza esika nini bakómi. Lelo oyo batii bamasini ya mike na masuwa mpo eyebisaka esika masuwa ekómi mpe ezali lokola miso ya masuwa na ntango bakoki komona te eloko nini ezali liboso na bango. Mike Clements, mokambi ya ebongiseli babengi Aides à la navigation du Canada na Saint John, na Terre-Neuve, alobi ete bamasini wana “ekoki kosala ete miinda oyo ezali pembeni ya mbu ezala lisusu na ntina te. Eloko moko te ekoki kokokana [na bamasini wana]. Miinda oyo batyá pembeni ya mbu ekosalisa yo te na mobembo ya mbu.”
Elobeli ya bana mike
Zulunalo moko ya Londres (Times) elobi ete: “Bana oyo baboti na bango bakufá matoi te, babandaka kobɛtabɛta monɔkɔ na ntango bakokisi sanza soki nsambo . . . , bana oyo bakolaka na mabota oyo baboti na bango bakufá matoi, bango mpe bamekaka kosalasala bikela (geste) ya mabɔkɔ na bango mpo na komekola baboti na bango oyo bayokaka te,” ata soki bana yango bayokaka. Profɛsɛrɛ Laura Petitto ya Iniversite McGill, na Montréal, na Canada, na bato mosusu oyo basalaka na ye, basalaki bolukiluki mpe bamonisi ete bana mike babotamaka na makoki ya koyeba lokota nyonso, ata mpe lokota ya bikela. Profɛsɛrɛ yango alobaki ete bana mike oyo bayokaka kasi bazali na “baboti oyo bayokaka te, baningisaka mabɔkɔ na bango na lolenge moko boye, lokola nde bazali kolanda ndakisa moko, oyo ekeseni mpenza na ndenge mosusu oyo moto nyonso aningisaka mabɔkɔ. . . . Yango ezali elobeli, kasi na mabɔkɔ na bango.” Bana mike oyo bafandaki na bato oyo balobaka na bikela bazalaki kosala bikela ya ndenge mibale, nzokande baoyo baboti na bango balobaka, bazalaki kosala bikela kaka ya ndenge moko. Bato yango oyo bazalaki kosala bolukiluki yango, basalelaki mayele moko boye mpo na kokɔtisa na masini bikela ya bana ya sanza 6, 10 mpe 12.
Babimisi Barulo ya Mbu Ekufá lokola babuku
Zulunalo moko (U.S.News & World Report) elobi ete: “Koleka mbula 50 banda bazwaki Barulo ya Mbu Ekufá na kati ya madusu ya mineneminene na bangomba ya mabanga na esobe ya Yudea, bato ya mayele na likambo yango basali fɛti mpo na kosepela ndenge babimisi mikanda ya nsuka ya makambo ya Nzambe oyo bakomaki yango esili koleka mbula 2000.” Profɛsɛrɛ Emanuel Tov, mokambi ya lisangá ya bato ya mayele oyo batalelaki barulo yango, ayebisaki ete buku oyo babimisi ezali na bavolimi 37. Mosala yango esalemaki na lisalisi ya bamasini oyo ezali kobima mikolo oyo, lokola masini oyo ekangaka bafɔtɔ mpe ebombaka yango na ordinatɛrɛ, mpe masini mosusu oyo esalisaki bango bákoka kotánga makomi oyo ebomamá. Bamaniskri oyo babongolaki na Liebele, Aramɛyɛ, Grɛki mpe Latin, esalemaki kobanda na mobu 250 liboso ya ntango na biso tii na mobu 70 na ntango na biso.
Bazali koluka biyano
Zulunalo moko ya Canada (Globe and Mail) elobi ete bato ya Association des librairies chrétiennes ya Canada balobi ete banda bateroriste babukaki babulundingi na États-Unis, batɛki Babiblia mwa mingi (30 %) koleka ndenge bazalaki kotɛka liboso. Marlene Loghlin, mokambi ya lisangá yango alobi ete: “Bato bazali koluka biyano. Yango ezali bongo mpo bato bazali kobanga. Mituna mingi oyo ezangi biyano ezali kotungisa mitema mpe makanisi na bango.” Lapolo yango ebakisi ete ata na bisika ya mike oyo batɛkaka babuku, “mikanda ya makambo ya losambo oyo ekoki kosalisa bato báyeba ntina ya makambo wana ya mawa etɛkami mingi.” Profɛsɛrɛ moko ya teoloji na Iniversite ya Toronto alobaki ete likambo yango emonisi ezaleli oyo bato bazalaka na yango bipai nyonso. Alobi lisusu ete: “Na eleko oyo bato bayebi te nini ezali kozela bango, bakómi komituna mituna ya ntina oyo etali makambo ya losambo,” mpe “Biblia ekoki kosalisa bango bázwa biyano na mituna na bango.”
Sida ezali koboma bato mingi na Afrika ya Sudi
Mpo na boyekoli moko oyo Comité de recherche médicale na Afrika ya Sudi esalaki, zulunalo moko (The New York Times) elobi ete: “Sida ekómi maladi ya liboso oyo ezali koboma bato mingi koleka na Afrika ya Sudi mpe yango ezali kozwa mingimingi bilenge oyo bauti kokóma mikóló.” Bato oyo basalaki boyekoli yango bakanisi ete na boumeli ya mbula zomi oyo ezali koya, bato soki milio mitano tii milio nsambo na Afrika ya Sudi bakokufa na sida. Bilenge basi ya mbula soki ntuku mibale nde bazali kokufa mingi koleka basi ya mbula ntuku motoba. Zulunalo yango elobi lisusu ete Afrika ya Sudi “ezali ekólo oyo eleki na bato oyo bazali na mikrobe ya sida. Basali ya Leta balobi ete moto moko kati na bato libwa, mpe mokóló moko kati na mikóló minei [ya mbula 30 tii 34] na Afrika ya Sudi, bazali na mikrobe ya sida.”
Kofanda na bingumba
Zulunalo moko ya Londres (The Sunday Times) elobi ete: “Na mobu 1900, bingumba oyo elekaki monene ezalaki Londres, New York, Paris, Berlin mpe Chicago.” Kasi, ndenge bato ya mayele bazali kokanisa, “tii na mobu 2015 bingumba ya Mpoto ekotikala nsima. Tokyo, Bombay, Lagos, Dacca na Bangladesh mpe Sao Paulo na Brésil, ekozala bingumba oyo eleki monene.” Bingumba yango, bakisa mpe bingumba mosusu 25, mokomoko ekokóma na bato koleka milio 20. Zulunalo moko (Times) elobi lisusu ete: “Bato ya mayele bakanisi ete tii na 2015 Londres ekozala lisusu te na molɔngɔ ya bingumba 30 oyo eleki na bato mingi mpe ekozala engumba kaka moko ya monene epai bato bakozala lisusu mingi te.” Soki bato bazali kokóma ebele, yango ebimisaka mpe mikakatano mingi. Douglas Massey, profɛsɛrɛ na makambo etali bizaleli ya bato (sociologie) na Inivɛrsite ya Pennsylvanie, na États-Unis, alobi ete: “Babola bakokoba kotondana na bakartye na bango oyo ezalaka na mobulu, kobomana mpe makambo mosusu ya mabe. Tokyo, oyo ezali lelo oyo na bato milio 26 mpe etikali moke bákóma milio 30, bato bakoki kofanda malamu, mpamba te motángo ya bato ezali kokola malɛmbɛmalɛmbɛ mpe engumba yango ezali na bandako, banzela mpe misala oyo esengeli. Profɛsɛrɛ Massey amonisi ete kobanda na eleko ya Baloma tii na eleko ya Mokonzi-Mwasi Victoria ya Angleterre, kaka bato moke mpenza (5 %) ya mokili mobimba nde bazalaki kofanda na bingumba, kasi tii na mobu 2015, bato mingi (53 %) na mokili mobimba bakofanda na bingumba.
Boyá komɛla likaya mbala moko mpo na libela
Profɛsɛrɛ Bo Lundback ya Institut national de travail na Stockholm, na ekólo Suède alobi ete: “Bato nyonso oyo bamɛlaka likaya basengeli komeka kotika yango. Soki otiki, salá makasi omɛla lisusu te.” Mpo na nini? Mpamba te baoyo bazongelaka komɛla bakoki kobebisa mimpululu na bango koleka baoyo batiká naino te. Bato ya mayele bayekolaki likambo yango na boumeli ya mbula zomi epai ya basi mpe mibali 1 116 ya mbula 35 tii 68, mpe bamonisi ete baoyo bamekaki te kotika komɛla likaya na boumeli ya boyekoli yango, likoki na bango ya kopema ekitaki mingi te (3 %), nzokande baoyo batikaki komɛla na boumeli ya mbula moko to koleka mpe bazongelaki, likoki na bango ya kopema ekitaki mwa mingi koleka (5 %). Profɛsɛrɛ Lundback akebisi ete: “Na mbula mibale oyo elandi ntango moto azongeli komɛla likaya, mimpululu na ye ebebaka mingi koleka. Mpe bato oyo bazalaki komɛla likaya babungisaka likoki ya kopema mpo na libela.” Zulunalo moko ya Londres (Times) elobi ete baoyo batikaki komɛla likaya na boumeli ya mbula zomi na ntango ya boyekoli yango babungisaki likoki na bango ya kopema kaka mwa moke mpenza (1 %).