Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g04 8/7 nk. 4-7
  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka
  • Lamuká!—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komitungisa te soki okolinga ye to te
  • “Bósolola na ngai!”
  • “Bótala ngai!”
  • ‘Nazali kokómisa mwana motó makasi te?’
  • Nani asengeli kobatela mwana?
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Pesá bana oyo bazali na yango mposa
    Lamuká!—2004
  • “Masini oyo eleki bamasini nyonso na mokili”
    Lamuká!—2012
  • Ndenge oyo bana bakɔtisaka mbongwana na libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2004
g04 8/7 nk. 4-7

Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka

KOBANDA na ntango mwana abotami, azalaka na mposa bálingaka ye mingi, básimbaka ye mpe bámemaka ye. Minganga mosusu bakanisaka ete ngonga 12 oyo elandaka kobotama ya mwana ezali na ntina mingi. Balobaka ete eloko ya liboso oyo mama alingaka mpe azalaka na yango mposa nsima ya kobota mpe oyo mwana alingaka mpe azalaka na yango mposa nsima ya kobotama ezali “te kolala to kolya, kasi kosimbana, koyokana mɔtɔ ya nzoto, kotalana mpe koyokana mingongo.”a

Motema etindaka mbala moko baboti bámemaka mwana na bango, bápesaka ye bizu, básimbaka ye, mpe bámemaka ye na ntolo. Soki mwana ayoki ete bazali kosala ye bongo, akómaka kolinga baboti na ye mingi mpe asepelaka mingi na bato. Bolingo yango ekómaka mpenza makasi mpe etindaka baboti básala nyonso mpo na kobɔkɔla mwana na bango tii akokola.

Nzokande, soki baboti bazali kolinga mwana na bango te, mwana akoki mpenza kolɛmba mpe kokufa. Yango wana, minganga mosusu bakanisaka ete ezali na ntina mingi mama amema mwana na ye mbala moko nsima ya kobota. Bapesi toli ete mama asengeli komema mwana na ye ata miniti 30 tii 60 liboso bátya ye esika mosusu.

Atako bazali kolendisa ete mama ná mwana oyo abotami sika bámesana, balopitalo mosusu elingaka mpenza te mama amema mwana na ye nsima ya kobota. Mbala mingi, balingaka te mwana oyo abotami sika azala esika moko na mama na ye mpo babangaka noki akozwa mikrobe. Kasi, emonanaka ete bana mingi oyo babotami sika bazwaka mikrobe oyo ekoki koboma mwana nde ntango batyaka bango mosika na bamama na bango. Yango wana, balopitalo mingi ekómi kopesa nzela ete bamama bámemaka bana na bango mwa ntango molai mbala moko nsima ya kobota.

Komitungisa te soki okolinga ye to te

Bamama mosusu balingaka mpenza te mwana oyo bauti kobota ntango bamoni ye. Yango wana bamitunaka: ‘Nakolinga mpenza ye?’ Ezali solo ete bamama mosusu balingaka mpenza te mwana na bango ntango bamoni ye mpo na mbala ya liboso. Atako bongo, ntina ya komitungisa ezali te.

Ata soki mama azali koyoka ete alingi mwana yango mbala moko te, bolingo ekokola yango moko na nsima. Mama moko oyo abotá bana mingi alobaki ete: “Likambo moko te oyo elekaka na ntango ya kobota ekoki kokolisa to kosilisa boyokani na yo ná mwana.” Atako bongo, soki ozali na zemi kasi ozali komitungisa mpo na likambo yango, ekoki kozala malamu osolola na monganga oyo akobotisa yo, mikolo mingi liboso. Yebisá ye polele ntango nini olingi komema mwana na yo nsima ya kobota mpe soki okomema ye miniti boni.

“Bósolola na ngai!”

Emonani ete ezali na bantango oyo bana bazalaka na mpasi te mpo na koyekola likambo boye to boye. Bantango yango esukaka soki bambula yango eleki. Na ndakisa, bɔɔngɔ ya mwana moke ezalaka na mpasi te mpo na koyekola monɔkɔ, ata minɔkɔ ebele mbala moko. Kasi, emonanaka lokola ete eleko oyo eleki malamu mpo na koyekola monɔkɔ ebandaka kosila soki mwana akómi na mbula mitano.

Ntango mwana akokisi mbula kobanda 12 tii 14, koyekola monɔkɔ ekoki kokóma mokakatano monene. Peter Huttenlocher, monganga oyo ayekolaka bɔɔngɔ ya bana mike, alobi ete ezali ntango oyo “matonga ya misisa ya bɔɔngɔ, oyo esalisaka moto ayekola monɔkɔ, ezalaka lisusu mingi te.” Tomoni ete bambula ya liboso ya bomoi ezali eleko ya ntina mingi mpo na koyekola monɔkɔ!

Ndenge nini bana babandaka koyekola koloba, likambo oyo ezali na ntina mingi mpo mayele na bango ekola? Liboso mpenza, ntango baboti na bango bazali kolobisa bango. Bana bamekolaka na ndenge ya kokamwa makambo oyo mikóló basalaka. Barry Arons, oyo asalaka na eteyelo ya tekiniki na Massachusetts, alobi ete: “Mwana amekolaka mongongo ya mama na ye.” Kasi likambo ya kokamwa, bana bamekolaka mingongo nyonso te. Ndenge Arons alobi yango, “soki mama alobi na ntango oyo mbeto ya mwana esali mwa makɛlɛlɛ, mwana akoyeba kokesenisa mongongo ya mama na ye ná mwa makɛlɛlɛ ya mbeto.”

Baboti nyonso, ezala bazali bato ya ekólo nini, balobaka na bana na bango na elobeli kaka ndenge moko. Ntango bazali koloba na mwana na maloba ya bolingo, motema na ye mpe ekómaka kobɛta mbangumbangu. Balobaka ete koloba na mwana na elobeli ya ndenge wana esalisaka ye ayeba koyokanisa maloba ná biloko oyo yango ezali kolakisa. Kozanga kobimisa maloba, mwana azali kosɛnga na baboti: “Bósolola na ngai!”

“Bótala ngai!”

Bamonaki ete na boumeli ya mbula ya liboso to mwa moke nsima, mwana alingaka mingi mokóló oyo azali kobatela ye, mingi mpenza mama na ye. Soki mwana azali komiyoka ete moto yango alingaka ye mpe azali kobatela ye, ye mpe akobanda kolinga bato mosusu, koleka bana oyo baboti na bango balingaka bango mpenza te. Balobaka ete bolingo wana ya mama ná mwana esengeli kofanda mpenza liboso mwana akokisa mbula misato.

Nini ekoki komonana soki bazali mpenza kolinga mwana te na boumeli ya eleko wana ya ntina mingi, oyo bɔɔngɔ na ye ekɔtisaka makambo ebele? Martha Farrell Erickson, oyo alandelaki bomoi ya bamama 267 elongo na bana na bango na boumeli ya mbula 20, abimisi likanisi oyo: “Soki kaka bapimeli mwana bolingo, esɛngo na ye [mwana] ekobanda kosila mokemoke tii akofungwama lisusu te epai ya bato mosusu to akolinga koyekola makambo ya sika te.”

Monganga Bruce Perry oyo asalaka na lopitalo moko ya bana na Texas, alobeli likambo yango boye mpo na komonisa likama monene oyo ekoki koyela mwana soki bazali mpenza kolinga ye te, alobi ete: “Soki osɛngi ngai nabuka mwana ya sanza motoba mikuwa nyonso ya nzoto to napimela ye bolingo na boumeli ya sanza mibale, nakoki koloba ete nakopona kobuka ye mikuwa.” Mpo na nini? Na likanisi ya monganga Perry, “mikuwa ekoki kozonga, kasi soki ozali kolinga mwana te mpe ozali kotyela ye likebi te na boumeli ya sanza mibale, bɔɔngɔ na ye ekosala lisusu malamu te mpo na libela.” Bato mosusu bandimaka te ete likambo yango ekoki kobebisa bɔɔngɔ ya mwana mpo na libela. Atako bongo, bato ya siansi oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete ezali na ntina mingi mwana akola na esika oyo bazali kolinga ye.

“Na mokuse,” ndenge buku Bana (na Lingelesi) elobi, “[bana mike] baumelaka te kolinga mpe kosɛnga ete bálinga bango.” Ntango mwana aleli, mbala mingi azali nde koyebisa baboti na ye: “Bótala ngai!” Ezali na ntina mingi baboti bámema mwana na boboto nyonso ntango azali kolela. Soki baboti bazali kosala eloko moko mpo na mwana ntango azali kolela, mwana yango akoyeba ete akoki koyebisa bamposa na ye. Azali koyekola kosolola na bato mosusu mpe koyokana na bango.

‘Nazali kokómisa mwana motó makasi te?’

Okoki komituna: ‘Soki mbala nyonso oyo mwana aleli, nayei kotala ye, nazali kokómisa ye motó makasi te?’ Ekoki mbala mosusu kozala bongo. Makanisi ezali ndenge na ndenge na motuna wana. Lokola mwana na mwana azalaka na makambo na ye, ekosɛnga baboti báyeba eloko nini eleki malamu kosala ntango mwana na bango azali kolela. Nzokande, ntango bayekolaki likambo yango mikolo oyo, bamoni ete soki mwana oyo abotami sika ayoki nzala, asubi to asumbi to mpe asiliki, nzoto na ye ebimisaka ba hormones oyo ekosala ete atungisama. Akolela mpo na komonisa ete eloko moko ezali kotungisa ye. Balobaka ete ntango moboti ayei epai ya mwana mpe akokisi mposa na ye, na lolenge wana, abandi kokolisa kati ya bɔɔngɔ ya mwana biloko oyo ekosalisa ye ayeba kokitisa motema. Lisusu, na likanisi ya monganga Megan Gunnar, mwana oyo azalaka soki aleli bayei esika azali, bɔɔngɔ na ye ebimisaka cortisol to ba hormones ya mitungisi mingi te. Mpe ata soki mwana yango asiliki makasi, akitisaka motema noki mpe nkanda na ye eumelaka te na kosila.

Erickson alobi ete: “Kutu, bana oyo bazalaki komema bango to koya esika bazali mbala nyonso oyo bazalaki kolela tii ntango bakokisaki sanza 6 to 8, balelaka mingi te lokola bana oyo bazalaki kotika bango bálela.” Ezali mpe na ntina koyeba lolenge mingi ya kosilisa kolela ya mwana. Soki mbala nyonso oyo mwana aleli ozali kosala ye kaka likambo yango moko, na ndakisa komɛlisa to komema ye, na ntango wana nde akoki kokóma motó makasi. Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga bobele ayoka mongongo na yo mpo atika koleka. To mpe ekoki kosɛnga bobele koya esika azali mpe kosolola na ye na litoi na boboto mpo atika kolela. To mpe lisusu, okoki bobele kosimba ye na mokɔngɔ to na libumu mpo atika kolela.

Bato ya Azia balobaka ete “mwana, mosala na ye kolela.” Mpo na mwana, kolela ezali lolenge ya liboso ya koyebisa oyo alingi básalela ye. Okomiyoka ndenge nini soki mbala nyonso oyo osɛngi eloko bazali kaka kotyela yo likebi te? Bongo, ndenge nini mwana na yo, oyo esengeli kosalela ye makambo nyonso, akomiyoka soki bazali kotyela ye likebi te mbala nyonso oyo azali na mposa ya bato? Kasi, nani asengeli kokokisa bamposa na ye ntango azali kolela?

Nani asengeli kobatela mwana?

Ankɛti moko euti kosalema mikolo oyo na États-Unis emonisi ete bana mingi (54 %) kobanda kobotama tii ntango bakómi na mbula 8 to 9, mingimingi bato mosusu nde babatelaka bango, kasi baboti na bango moko te. Na mabota mingi, esengeli baboti nyonso mibale básalaka mpo na kozwa mbongo oyo bakokoka kosalela sanza mobimba. Mpe soki likoki ezali, bamama mingi bazwaka konje na mosala, mpo na kobatela mwana na bango oyo abotami sika na boumeli ya mwa bapɔsɔ to basanza. Kasi nani asengeli kobatela mwana nsima na yango?

Ya solo, esengeli te kotya mibeko makasimakasi mpo na likambo yango. Kasi, esengeli kobosana te ete mwana akembi naino te na boumeli ya eleko wana ya ntina mingi ya bomoi na ye. Baboti nyonso mibale basengeli kokanisa likambo yango malamumalamu. Ntango bazali koyokana nini bakosala, basengeli kotalela malamumalamu likambo mokomoko oyo basengeli kopona.

Monganga Joseph Zanga, oyo asalaka na Ebongiseli ya Amerika mpo na balopitalo ya bana, alobi boye: “Ekómi komonana polele ete kotika bato mosusu bábatelaka bana na biso, ata soki bazali na mateya ya malamu ndenge nini, ekoki soki moke te kozwa esika ya ntango oyo bana basengeli na yango epai ya baboti na bango.” Bato mosusu ya mayele babimisaki makanisi ete bana oyo bakendaka kotika bango na bisika ya kobatela bana, balandelaka mpenza bango te ndenge esengeli.

Bamama mosusu oyo basalaka, ntango bamonaki ntina ya kofanda na ndako mpo na kotyela mwana na bango likebi mingi, bazwaki ekatela ya kotika mosala, na esika ya kotikela moto mosusu mokumba ya kobɔkɔlela bango bana. Mwasi moko alobaki ete: “Nazali na esengo mingi oyo mosala mosusu te ekokaki kopesa ngai yango.” Toyebi ete mikakatano ya nkita ezali kopesa baboti nyonso te likoki ya kopona kofanda na ndako. Baboti mingi bakoki kosala ndenge mosusu te bobele kotika mwana na bisika oyo babatelaka bana, kasi basalaka milende mpo na kotyela mwana likebi ntango bango nyonso bazongi ndako. Ndenge moko mpe, bamama mingi oyo basalaka mpe bazali na mibali te bakoki mpe kosala ndenge mosusu te na likambo yango; basalaka milende mpo na kobɔkɔla bana na bango​—mpe bazwaka matomba ya malamu.

Kobɔkɔla bana ekoki kozala mosala moko ya malamu oyo epesaka esengo mingi. Kasi, ezali mpe mokumba monene mpe ya makasi. Ndenge nini okoki kolonga na mosala yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na masolo oyo, Lamuká! elobeli makanisi ya bato ya mayele oyo bayebani mingi, oyo bayekolaka makambo ya bana, mpamba te makanisi yango ekoki kozala na litomba mpe koteya baboti. Kasi, esengeli kobosana te ete makanisi yango ekoki kobongwana nsima ya bambula; ekeseni na mitinda ya Biblia oyo Lamuká! etyelaka ntembe ata moke te.

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

Bana oyo basɛkaka te

Minganga mosusu na Japon bamonaki ete bana oyo balelaka te mpe basɛkaka te bazali se kokóma ebele. Satoshi Yanagisawa, oyo azali monganga ya bana, abengi bango bana oyo basɛkaka te. Mpo na nini bana yango balelaka te mpe basɛkaka te? Minganga mosusu bakanisi ete ezali mpo basiliká mpamba te baboti na bango bazalaki kotyela bango likebi te. Balobaka ete yango ezali kozanga makoki ya koloba mpo baboti basololisaki mwana te. Bapesi likanisi ete soki mwana azali na mposa básololisaka ye kasi bazali kotyela ye likebi te, to bazali koyeba bamposa na ye te, nsukansuka akotika na ye.

Monganga Bruce Perry, oyo asalisaka maladi ya motó na lopitalo moko ya bana na Texas, alobi ete soki bazali kolinga mwana te, baboi kolobisa ye to kosɛkisa ye na ntango oyo asengeli na yango, eteni ya bɔɔngɔ oyo etindaka moto ayokela bato mosusu mawa ekokola te. Soki bazali kotyela mwana likebi te na boumeli ya ntango molai, akobungisa mpo na libela likoki ya koyokela bato mosusu mawa. Monganga Perry akanisi ete soki bilenge mosusu bakómaka baombo ya bangi to ya masanga mpe basalaka mobulu, ezali mpo bazalaki kolinga bango mpenza te ntango bazalaki bana mike.

[Elilingi na lokasa 7]

Bolingo kati ya mwana ná baboti ekolaka soki bazali kosolola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto